Tokobanda koyekola Pusaná penepene na Yehova na pɔsɔ ebandi na 6 sanza ya 1
1. Kobanda na pɔsɔ ya 6 sanza ya 1, libaku nini tokozala na yango ya kopusana penepene na Yehova?
1 Yehova alingi tópusana penepene na ye. (Yak. 4:8) Mpo na kosalisa biso na likambo yango, tokobanda koyekola buku Pusaná penepene na Yehova na Boyekoli ya Biblia na lisangá na pɔsɔ ebandi na 6 sanza ya 1. Maloba ya ebandeli ya buku yango elobi boye: “Tokopusana penepene na Yehova soki tokanisi malamumalamu lolenge oyo ye amonisaka mokomoko na bizaleli na ye, soki totaleli lolenge ya malamu mpenza oyo Yesu Klisto amonisaki bizaleli yango mpe soki toyebi lolenge oyo biso mpe tokoki kolona yango.” Masangá eyekolaki buku yango liboso na mobu 2004 mpe 2005. Nzokande, mpo na basakoli mingi, pene na milio mibale oyo bayei na lisangá kobanda wana, ekozala mbala ya liboso mpo na bango báyekola na mozindo bizaleli malamu ya Yehova. Mpo na baoyo bayekolaki buku yango liboso, kozongela yango ekosalisa bango básepela lisusu mingi na bizaleli ya Yehova.—Nz. 119:14.
2. Ndenge nini tokoyekola buku Pusaná penepene na Yehova?
2 Ndenge tokoyekola yango: Motambwisi akobanda na mwa maloba mokuse, ekoki kozala fraze moko to mibale. Na buku yango, ezali te na bavɛrsɛ oyo bakomi “tángá”; yango wana na ntango ya boyekoli, motambwisi nde akopona bavɛrsɛ oyo esimbi lisolo mpo etángama. Na nsuka ya boyekoli mokomoko, akoki kotuna motuna moko to mituna mibale mpo na bozongeli. Soki boyekoli ekɔtisi mpe etanda “Mituna mpo na komanyola,” akosalela yango mpo na bozongeli. Soki miniti ezali, motambwisi akoki kosɛnga bátánga bavɛrsɛ mosusu oyo ezali na etanda mpe na nsima akotuna mwa mituna mpo bayangani bápesa makanisi.
3. Wana tokoyekola buku yango, tosengeli kosala nini mpe mpo na nini?
3 Mpo na kozwa mpenza matomba: Omibongisaka ata soki oyekolá buku yango liboso. Opesaka biyano mpo yango ekosanzola Yehova, ekosalisa yo omikundola makambo mpe ekosalisa bayangani mosusu. (Nz. 35:18; Ebr. 10:24, 25) Wana ozali komanyola na bizaleli kitoko ya Yehova, okopusana lisusu mpenza penepene na ye. (Nz. 77:11-13) Yango ekosalisa yo ozala na ekateli makasi ya kotosa mibeko na ye mpe ekolendisa yo mpenza oyebisa basusu makambo etali ye.—Nz. 150:1-6.