Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/15 lok. 4
  • Kokabola nkasa ya libyangi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kokabola nkasa ya libyangi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2015
  • Masolo mosusu
  • Libyangi moko ya ntina mingi
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Kampanye oyo ebimisaka matomba
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Kampanye mpo na kokabola lokasa ya libyangi ya Liyangani ya etúká
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
  • Kampanye mpo na kokabola nkasa ya libyangi na Ekaniseli ekobanda mokolo ya 2 Aprili
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2015
km 4/15 lok. 4

Kokabola nkasa ya libyangi

1. Kampanye mpo na kobengisa bato na liyangani ya etúká ekobanda ntango nini?

1 Soki okani kolamba bilei ya kitoko mingi oyo ekosɛnga milende to mbongo mingi mpenza mpo olya ná bato ya libota na yo to baninga, na ntembe te, okozala na esengo ntango ozali kobengisa bango. Ndenge moko mpe, mosala makasi ezali kosalema mpo na kobongisa bilei ya elimo oyo tokozwa na liyangani ya etúká oyo ezali koya. Pɔsɔ misato liboso ete liyangani na biso ebanda, Yehova apesi biso libaku ya kobengisa bato mpo báyangana elongo na biso. Nini ekosalisa biso tókabola na esengo mpenza nkasa ya libyangi?

2. Nini ekotinda biso tósala mingi na eleko ya kampanye?

2 Tokosala mingi na eleko ya kampanye yango soki tokanisi na botɔndi mpenza matomba oyo biso moko tozwaka na mateya oyo Yehova abongiselaka biso na mayangani. (Yis. 65:13, 14) Tóbosana mpe te ete kampanye oyo tosalaka mbula na mbula, ebimisaka matomba. (Talá etanda “Ebimisaka matomba.”) Bato mosusu oyo tokobengisa bakoyangana elongo na biso, kasi bamosusu bakoyangana te. Nzokande, bato báya mingi to te, milende oyo tokosala na eleko ya kampanye ekosanzola Yehova mpe ekomonisa ete azali Mokabi.​—Nz. 145:3, 7; Em. 22:17.

3. Ndenge nini nkasa ya libyangi ekokabolama?

3 Lisangani mokomoko ya bankulutu ekozwa ekateli mpo na oyo bakosala mpo bákabola nkasa ya libyangi na bato mingi. Bakotalela soki ekosɛnga kotika yango na bandako oyo bakuti bato te, to kokabola yango ntango bazali kopesa litatoli na bisika ya bato nyonso na teritware na bango. Na mikolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo tokokabola bazulunalo elongo na nkasa ya libyangi soki ebongi. Ntango kampanye ekosila, tokozala mpenza na esengo ya koyeba ete tosalaki mingi mpe tobengisaki ebele ya bato mpo báya elongo na biso na fɛti ya elimo oyo Yehova abongiselaki biso!

Okoloba nini?

Nsima ya kopesa mbote ndenge esalemaka epai na bino, okoki koloba boye: “Tozali kosala kampanye na mokili mobimba mpo na kobengisa bato na liyangani moko ya ntina mingi. Mokolo, ngonga mpe esika etyami na lokasa oyo.”

Ebimisaka matomba

  • Eleki bambula mingi, ntango ndeko mwasi moko azalaki kokabola nkasa ya libyangi na eleko ya kampanye, amitunaki soki milende nyonso wana ezalaki mpenza na ntina. Akanisaki boye: ‘Bato oyo tobengisi, bakoya mpenza na liyangani?’ Na eteni ya ntɔngɔ ya mokolo ya pɔsɔ, amonaki elenge mobali moko ya Lingomba ya Sikh afandi pembeni na ye mpe azwaki ekateli ya kosolola na ye. Emonanaki ete elenge yango ayaki na liyangani mpo azwaki lokasa ya libyangi. Atunaki mituna mingi oyo ndeko mwasi azalaki na likoki ya koyanola. Alobelaki ndenge mateya esepelisaki ye mpe ndenge molato mpe etamboli ya bayangani ekamwisaki ye. Na nsima, kaka na mokolo yango, ndeko mwasi asololaki mpe na mobali moko ná mwasi na ye oyo bafandaki pene na ye. Bango mpe bazwaki lokasa ya libyangi mpe bayaki na liyangani na bisi. Basepelaki na liyangani mpe bakanaki koya mokolo ya lomingo. Na yango, ndeko mwasi ayaki komona ete kampanye oyo tosalaka mbula na mbula, ezali na ntina mingi.

  • Na liyangani moko oyo eutaki koleka, ndeko mobali moko ná mwasi na ye oyo bazali babongisi-nzela ya sanza na sanza, basololaki na babalani moko ya mibange. Mibange yango balobaki ete ezali mbala na bango ya liboso báya na liyangani. Babongisi-nzela yango batunaki bango ete: “Nani abengisaki bino?” Bayanolaki ete: “Mokolo moko ntango tozongaki ndako, tokutaki lokasa ya libyangi na nse ya porte.” Batángaki yango mpe batondisaki kutu eteni na yango ya nsuka mpo na kosɛnga boyekoli ya Biblia. Bayangani mosusu bapesaki mibange yango bilei na midi. Mibange yango basepelaki mingi na mateya mpe bazwaki bibongiseli ya koyangana lisusu na mokolo oyo elandi. Bibongiseli ezwamaki mpo na kozongela bango mpe kolandela mposa oyo bamonisaki.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto