Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/13 lok. 5
  • Kampanye oyo ebimisaka matomba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kampanye oyo ebimisaka matomba
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Masolo mosusu
  • Kokabola nkasa ya libyangi
    Mosala na biso ya Bokonzi—2015
  • Kampanye mpo na kokabola lokasa ya libyangi ya Liyangani ya etúká
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
  • Libyangi moko ya ntina mingi
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Biso nyonso tómipesa na kobengisa bato na liyangani ya etúká “Landá Klisto!”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2013
km 4/13 lok. 5

Kampanye oyo ebimisaka matomba

Na mbula oyo mpe, pɔsɔ misato liboso liyangani ya etúká ebanda, lisangá mokomoko ekosala kampanye mpo na kobengisa bato oyo basepeli na teritware na bango. Kampanye yango oyo esalemaka mbula na mbula ezali na ntina. Mbala mingi, bato oyo bandimaka kozwa lokasa ya libyangi mpe bayaka na liyangani, bakamwaka na koyoka badiskur oyo elimbolaka mateya ya Biblia, na ndenge badepartema ebongisamaka malamu na bato oyo bamipesi na bolingo na bango moko, mpe na etamboli malamu mpe bomoko oyo tomonisaka. (Nz. 110:3; 133:1; Yis. 65:13, 14) Kampanye yango ebimisaka mpenza matomba, mingimingi na bisika oyo esɛngaka ete bato oyo basepeli bátambola ntaka molai mpo na koya na liyangani?

Nsima ya liyangani ya etúká ya mobu 2011, biro ya filiale moko ezwaki mokanda oyo eutaki epai ya mwasi moko oyo akutaki lokasa ya libyangi na nse ya porte na ye. Azalaki na momeseno ya kobombana soki Batatoli ya Yehova bayei epai na ye. Akomaki boye: “Nazali na ndako ya kitoko, mobali ya malamu, mpe nakanisaki ete nazali na nyonso oyo ekoki kopesa ngai esengo. Likambo ya mawa, nazalaki kaka na esengo te mpe bomoi na ngai ezalaki mpenza na ntina te. Yango wana, nazwaki ekateli ya kosala mobembo ya kilomɛtrɛ 320 na motuka na ngai mpo nalanda programɛ ya mokolo ya pɔsɔ.” Mwasi yango asepelaki mingi na liyangani mpe abengaki mobali na ye na telefone mpo na koyebisa ye ete akolala kuna mpo alanda mpe programɛ ya mokolo ya lomingo. Abakisaki boye: “Nalandaki badiskur nyonso, nakutanaki na Batatoli ya Yehova mingi, mpe nalingaki liyangani yango esila ata te.” Ntango azongaki ndako abandaki koyekola Biblia mpe nsima ya sanza minei akomaki mosakoli oyo azwi naino batisimo te. Asukisi boye: “Nasepelaki mingi ndenge nakutaki lokasa ya libyangi wana na nse ya porte na ngai mpo sikoyo bomoi na ngai ekómi mpenza na ntina!”

Na bato oyo bakozwa lokasa ya libyangi, bamosusu bakoya na liyangani. Na yango, tósala kampanye wana ya ntina na molende. Memá nkasa ya libyangi oyo ekotikala na esika ya liyangani, mpe salelá yango mpo na kopesa litatoli ya libaku malamu.

Ndenge nini tokopesa lokasa ya libyangi?

Mpo tósilisa teritware na biso mobimba, tosengeli koloba mingi te. Tokoki koloba boye: “Mbote. Lokasa oyo ya libyangi ezali kokabolama na mokili mobimba. Ya yo yango oyo. Okoyeba makambo mosusu na kati.” Tózala na esengo. Soki tozali kokabola yango mokolo ya pɔsɔ to ya lomingo, tokoki mpe kopesa bazulunalo soki ebongi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto