Biso nyonso tómipesa na kobengisa bato na liyangani ya etúká “Landá Klisto!”
Basakoli bakokabola lisusu nkasa ya kobengisa bato na liyangani
1 Na mbula eleki, kampanye oyo esalemaki na mokili mobimba mpo na kobengisa bato na liyangani ya etúká “Lobiko ekómi pene!” ebotaki mpenza mbuma epai ya bato oyo basepelaka na nsango malamu. Bato oyo bandimaki libyangi yango mpo na mbala ya liboso, basepelaki mingi na elambo monene wana ya elimo elongo na Batatoli ya Yehova. (Yis. 65:13) Basepelaki mingi kozala elongo na libota na biso ya baklisto, oyo ezali na bolingo mpe na bomoko. (Nz. 133:1) Mpo na kosalisa bato mingi bákende na liyangani ya etúká “Landá Klisto!”, tokokabola lisusu nkasa ya libyangi na mokili mobimba.
2 Matomba oyo ezwamaki na mbula eleki: Makambo oyo bandeko bakomi, emonisi ete na mokili mobimba matomba emonanaki mpenza ndenge tobengisaki bato na liyangani ya etúká “Lobiko ekómi pene!” Na bisika mingi, bato basepelaki mingi na likambo yango. Na ndakisa, zulunalo moko ebimisaki lisolo moko ya molai mpo na kolobela kampanye yango; elobaki mpe boye: “Na engumba na biso, Batatoli bazali kosala milende mpenza mpo na kokutana na moto nyonso liboso ete liyangani ebanda: bazali kosakola bangonga mingi, bazali kotambola mingi, mpe bazali kosolola na bato na mokuse.” Na engumba mosusu, ndenge oyo kampanye ya kokabola nkasa ya libyangi esalemaki na molɔngɔ, ebendaki likebi ya bapanzi-nsango mpe balobelaki yango mingi. Bazulunalo koleka misato elobaki malamu mpo na mosala oyo tosalaki liboso ya liyangani. Mopanzi-nsango moko akomaki masolo mingi ya milai oyo etondisaki nkasa koleka mibale na zulunalo moko ya mokolo ya lomingo. Masolo yango elobelaki bindimeli na biso, bondeko na biso, kokabolama ya nkasa ya libyangi mpe liyangani yango moko. Na ndako moko, ntango mosakoli moko alakisaki mwasi moko lokasa yango ya libyangi, mwasi yango akataki ye maloba mpe ayebisaki ye boye: “Ya solo, nazalaki kutu kotánga likambo yango na zulunalo moko!” Moto mosusu akamwaki mpe alobaki ete: “Nazalaki kotánga likambo na bino kaka sikoyo mpe talá, bino wana boyei epai na ngai! Wana nde lokasa ya libyangi oyo boyeli ngai?” Na nsima, abakisaki ete: “Likambo oyo bino Batatoli ya Yehova bozali kosala ezali malamu mpenza.”
3 Bato mingi oyo basepelaki bayaki na lokasa ya libyangi na bango na mabɔkɔ na bisika ya liyangani. Bamosusu kati na bango bazalaki kouta mosika na mituka mpo na koya na liyangani. Milende oyo tosalaki mpo na kobengisa bato ebakisaki motángo ya bayangani. Na ndakisa, na ekólo moko, bato 27 likoló ya monkama babakisamaki koleka na liyangani ya mbula oyo eleki.
4 Kokabolama na yango na teritware: Bokoki kobanda kokabola nkasa ya libyangi pɔsɔ misato liboso liyangani na bino ebanda. Bosengeli kosala milende mpo bósilisa teritware ya lisangá na bino mobimba. Na masangá oyo ezali na teritware ya monene, basakoli bakoki kobanda kotika lokasa ya libyangi na ndenge ya mayele na ndako oyo bakuti bato te na pɔsɔ ya nsuka liboso liyangani ebanda. Masangá basengeli kosala makasi bákabola nkasa na bango ya libyangi nyonso mpe na teritware na bango mobimba, soki likoki ezali. Soki etikali, babongisi-nzela bakosalela yango.
5 Okoloba nini: Okoki koloba boye: “Tozali kokabola lokasa ya libyangi oyo na mokili mobimba mpo na kobengisa bato na likambo moko ya ntina mingi. Ya yo, yango oyo. Okoyeba makambo mosusu na kati.” Sololá na bato na mokuse mpo okabola yango na bato mingi. Kasi, soki moto azali na mituna, zwá ntango ya koyanola yango. Komá nkombo ya bato oyo basepeli mpe zongelá bango nokinoki.
6 Ezali na ntina mingi tósalaka makasi tólanda Klisto! (Yoa. 3:36) Liyangani na biso oyo ezali koya ekosalisa biso nyonso oyo tokoyangana na kosala bongo. Ya solo, tondimi mpenza ete litatoli moko monene ekopesama lisusu mpo na milende oyo biso nyonso tokosala mpo na kobengisa bato na liyangani ya etúká “Landá Klisto!” Na yango, zalá na molende mpe bengisá bato mingi báya na liyangani yango. Tiká Yehova apambola mpenza milende oyo mokomoko na biso akosala mpo na kosangana na mosala wana oyo ekosalema na mokili mobimba.