Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/05 lok. 4
  • Osalelaka nkasa ya libyangi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Osalelaka nkasa ya libyangi?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Masolo mosusu
  • Kampanye oyo ekosalema na mokili mobimba mpo na kobengisa bato na Liyangani ya Etúká “Lobiko ekómi pene!”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Biso nyonso tómipesa na kobengisa bato na liyangani ya etúká “Landá Klisto!”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
Mosala na biso ya Bokonzi—2005
km 8/05 lok. 4

Osalelaka nkasa ya libyangi?

Mokolo moko, mwana moko ya mobali ya mbula 11 alɔkɔtaki lokasa ya libyangi oyo ezalaki kobengisa bato na lisukulu moko oyo ezalaki kolobela lifelo. Nsima ya bambula, alobaki boye: “Lokasa yango ebendaki likebi na ngai, mpamba te lokola ezalaki komonana ete nazalaki ntango nyonso kosala makambo ya mabe, nazalaki kobanga mingi kokende na lifelo ya mɔtɔ ntango nakokufa.” Akendaki koyoka lisukulu yango, mpe soki mbula moko nsima ya koyekola Biblia mbala mingi, azwaki batisimo. Ezali ndenge wana nde ndeko Karl Klein, oyo na nsima akómaki na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova, abandaki mosala na ye ya moklisto. Nyonso ebandaki na lokasa ya libyangi.

Tii lelo, lokasa ya libyangi ezali kaka esaleli ya malamu mpo na kopesa litatoli. Basakoli mingi bamonaka ete kopesa moto lokasa ya libyangi ezali lolenge malamu ya koyebisa ye soki tozali banani mpe ya kobanda lisolo. Baboti bakoki kolakisa bana na bango mosala ya kosakola soki bazali kotika bango bápesa moto lokasa ya libyangi ntango bakómi na porte moko. Basakoli oyo bakomelaka bato mikanda mpo na kopesa bango litatoli, bakoki kobengisa bato na makita soki bakɔtisi lokasa ya libyangi na mikanda yango. Na ntembe te, nkasa ya libyangi ezali lolenge malamu ya kobengisa bayekoli ya Biblia mpe bato mosusu oyo basepelaka na mateya ya solo na makita na biso.

Osalelaka malamu nkasa ya libyangi na mosala na yo ya kosakola?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto