Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Ndenge ya kobanda koyekola na moto liboso ya porte na lisalisi ya mwa buku Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
Mpo na nini ezali na ntina: Mpo tókómisa bato bayekoli, tosengeli kozala bateyi ya Liloba ya Nzambe. (Mat. 28:19, 20) Biso nyonso tokoki koteya solo malamumalamu na kosalela bisaleli oyo bapesi biso. Mwa buku Nsango malamu oyo euti na Nzambe! ebongisami mpenza mpo na kosalisa biso tóteya bato solo. Kutu, tokoki kosalela yango mpo na kobanda koyekola na moto Biblia liboso ya porte na mbala ya liboso oyo tokutani na ye.
Meká kosala boye na boumeli ya sanza:
Bondelá mpo okóma na mposa ya koyekola na moto Biblia. Lisusu, bondelá Yehova asalisa yo obanda koyekola na moto Biblia, mpe okóma na makoki ya koteya solo malamumalamu.—Flp. 2:13.
Na losambo na bino na kati ya libota to na boyekoli na yo moko, zwá ntango ya koyekola ndenge ya kobanda lisolo. Yango ekosalisa yo na mosala ya kosakola oloba na komindimisa mpe obanda koyekola na moto Biblia liboso ya porte.