Yekolá epai ya basakoli oyo bameseni mpenza na mosala
Tosepelaka mingi na basakoli oyo bameseni mpenza na mosala ya kosakola. Bamosusu basaleli Yehova na bosembo bambula mingi. Basusu bameseni na mosala ya kosakola eumeli mingi te. Basakoli yango bamoni ndenge Yesu azali kotambwisa lisangá ya bokristo na mikolo oyo ya nsuka, na ndenge mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli ezali kokende liboso. (Mat. 28:19, 20) Bazwaki “nguya oyo eleki makasi” ntango bazalaki kokutana na mikakatano mpe komekama mpo bazalaki kosakola. (2 Ko. 4:7) Tokoki koyekola makambo mingi epai ya basakoli yango. Soki libaku emonani, basepelaka koteya basusu makambo oyo bayekolaki. (Nz. 71:18) Na yango, tosengeli koluka mabaku ya koyekola epai na bango. Ndenge nini tokoki kosala yango?
Na mosala ya kosakola. Mpo basakoli ya sika to baoyo bameseni te na mosala báyeba malamu kosakola, esengeli bázwa formasyo. Bakoki koyekola makambo mingi soki bazali kotala ndenge basakoli oyo bameseni na mosala bazali kosakola. (Talá lisolo: “Monisáká molende na mosala ya kosakola,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/02/2015, paragrafe ya misato, na nse ya motó ya likambo moke “Kosalisa basakoli ya sika.”) Matomba nini ozwaki na ndenge osakolaki elongo na bango?
Okoki nde kosɛnga mosakoli moko oyo amesani na mosala ete bósakola elongo? Soki azali ebɔsɔnɔ, na bantango mosusu okoki kosɛnga moko ya bato oyo oyekolaka na bango Biblia ete bókende koyekola epai ya mosakoli wana. Na nsima, sɛngá ye amonisa makambo oyo okoki kobongisa mpe apesa yo toli.
Lekisáká ntango elongo na bango: Lekisáká ntango elongo na basakoli oyo bameseni na mosala mpo oyeba bango malamu. Okoki kobengisa moko na bango na losambo na bino na kati ya libota, mpe kotuna ye mwa mituna. Soki azali ebɔsɔnɔ, okoki nde kozwa bibongiseli mpo bósala losambo na kati ya libota epai na ye? Tuná ye ndenge nini ayebaki solo. Makambo nini ya malamu akutanaki na yango? Bokoli nini amoni na teritware na bino? Esengo nini azwi na mosala ya Yehova?
Kokanisa te ete akosalisa yo na makambo nyonso. Lokola biso nyonso, basakoli oyo baumeli mingi bazali mpe na makabo ndenge na ndenge. (Rom. 12:6-8) Bamosusu bakómi mibange mpe mpo na yango bakoki lisusu te kolekisa ntango mingi elongo na biso. Atako bongo, tokoki koyekola makambo mingi epai na bango mpamba te bayebi makambo mingi na ndenge basaleli Yehova na bosembo.