MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MOSAKOLI 1-6
Sepelá na mosala na yo nyonso ya makasi
Yehova alingi tósepela na mosala na biso mpe alakisi biso ndenge ya kosala yango. Moto akobanda kosepela na mosala soki azali na makanisi malamu mpo na yango.
Okosepela na mosala na yo soki . . .
ozali na makanisi malamu
okanisi ndenge mosala yango esalisaka basusu
ozali kosala makasi na mosala, kasi soki ozongi ndako, landelá makambo ya libota mpe ya losambo