Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb17 Novembre lok. 3
  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Kozongela moto

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Kozongela moto
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
  • Masolo mosusu
  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Ndenge ya kobongisa nzela mpo na kozongela moto
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Kobongisa nzela mpo na kozongela moto
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
  • Ezali na ntina komibongisa mpo na kozongela bato na ndenge oyo ekobota mbuma
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
mwb17 Novembre lok. 3

BOMOI YA BAKRISTO

Tókolisa makoki na biso ya kosakola​—Kozongela moto

MPO NA NINI EZALI NA NTINA: Bato mingi oyo basepelaka na nsango ya Bokonzi balukaka koyeba solo etali Nzambe. (Yis 55:6) Mpo tókoba koteya bango, tosengeli kozongelaka bango mbala na mbala. Bato bakutanaka na mikakatano ndenge na ndenge, yango wana tosengeli kosalela mayele ekeseni mpo na kokolisa mposa na bango. Kasi, tokosala yango malamu soki tozali komibongisa malamu mpe toyebi oyo tokosala mbala nyonso oyo tozongeli moto mpo nsukansuka tóbanda na ye boyekoli ya Biblia.

Ndeko mwasi moko azali komibongisa mpo na kozongela moto

NDENGE YA KOSALA YANGO:

Bandeko basi mibale bazongeli moto moko mpe balakisi ye video moko
  • Salá nyonso ozongela ye nokinoki, mbala mosusu nsima ya mwa mikolo.​—Mt 13:19

  • Monisá boboto mpe limemya. Zalá motema mpiɔ

  • Bandá na kopesa ye mbote na esengo. Bengá ye na nkombo na ye. Yebisá ye ntina oyo ozongeli ye​—mbala mosusu mpo na koyanola na motuna moko, kotikela ye zulunalo ya sika, kolakisa ye site Internet na biso, video moko, to kolakisa ye ndenge boyekoli ya Biblia esalemaka. Bongolá lisolo na yo soki asepeli na lisolo mosusu.​—Flp 2:4

  • Tángelá ye vɛrsɛ moko ya Biblia to tikelá ye mokanda moko mpo na komwangisa mai na mboto ya solo oyo olonaki na motema na ye. (1Ko 3:6) Luká kosala boninga na ye

  • Lobá likambo moko oyo ekopesa yo nzela ozongela ye lisusu.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto