BOMOI YA BAKRISTO
Koyokana mpo na kosakola na teritware oyo bato balobaka minɔkɔ ndenge na ndenge
Mbala mingi bato basepelaka na nsango ya Bokonzi soki bayoki yango na monɔkɔ na bango ya mboka. Ekoki kozala mpo na yango nde na Pantekote ya mobu 33 T.B., Yehova amonaki malamu ‘Bayuda oyo babangaka Nzambe, oyo bautaki na bikólo nyonso oyo ezali na nse ya lola’ báyoka nsango malamu na ‘monɔkɔ na bango mpenza oyo babotamá na yango,’ atako mbala mosusu ezalaki na monɔkɔ moko oyo bango nyonso bazalaki koloba; na ndakisa Ebre to Grɛki. (Mis 2:5, 8) Lelo oyo, na bisika oyo minɔkɔ ndenge na ndenge elobamaka, masangá oyo esalaka makita na minɔkɔ ekeseni ekoki kosalela teritware moko bango nyonso. Ndenge nini na masangá ya ndenge wana basakoli bakoki koyokana mpo na kopesa moto nyonso litatoli kozanga ete bango nyonso básala yango na ngonga kaka moko to mwa moke nsima ya ntango oyo basusu bauti kosala teritware yango mpo bato ya teritware básilika te?
Kosolola (Mas 15:22): Bakɛngɛli ya mosala ya kosakola basengeli kosolola elongo mpe koluka ndenge ya kosakola nsango malamu oyo ekozala malamu mpo na masangá yango nyonso. Soki teritware ezali moke, masangá oyo esakolaka na minɔkɔ mosusu ekoki mbala mosusu kosɛnga bino bókɔta te na bandako ya bato oyo balobaka monɔkɔ ya teritware na bango. Kasi, soki bazali kokoka te kosala mbala na mbala teritware na bango mobimba mpo ezwami na bisika ekeseni mpe ezali monene mpenza, bakoki komona malamu bókɔta na bandako nyonso kasi bóyebisa bango soki moto moko ya teritware na bango asepeli na nsango malamu. (od lok. 93 par. 37) To bakoki kosɛnga lisangá na bino esalisa bango na koluka bato oyo balobaka monɔkɔ ya lisangá na bango; bato oyo bokoki kotindela lisangá na bango baadrɛsi na bango. (km 12/7 lok. 5, etanda) Bóbosana te ete na bantango mosusu, bato bakoki koloba minɔkɔ mingi na ndako moko. Bibongiseli mpo na kosakola na teritware mobimba esengeli koyokana na mibeko na likambo etali kobatela bansango etali moto ye moko.
Kosala na bomoko (Ef 4:16): Landá na likebi mpenza malako nyonso oyo mokɛngɛli ya mosala ya kosakola apesi. Oyekolaka Biblia na moto moko oyo asepelaka na monɔkɔ mosusu oyo ekeseni na oyo ya lisangá na bino? Moyekoli akoki kokola noki soki opesi ye epai ya ndeko ya lisangá ya pene to ya etuluku oyo elobaka monɔkɔ na ye.
Komibongisa (Mas 15:28; 16:1): Soki nkolo-ndako azali koloba monɔkɔ mosusu, salá oyo okoki kosala mpo na kopesa ye litatoli. Ntango ozali komibongisa na ndako, okoki kokanisa minɔkɔ oyo elobamaka na teritware na bino mpe kotya na telefone na yo mabongoli mosusu ya Biblia mpe bavideo na minɔkɔ yango. Okoki mpe kosalela JW Language mpo na koyekola ndenge ya kopesa mbote.