BOMOI YA BAKRISTO
Yehova akokanisa nini?
Liboso ya kozwa bikateli, ezala ya mike to ya minene, tomitunaka soki ‘Yehova akokanisa nini?’ Atako tokoyeba makambo nyonso te etali makanisi ya Yehova, kasi amonisi makambo mingi na Biblia mpo tózala na nyonso oyo esengeli mpo na “mosala nyonso ya malamu.” (2Ti 3:16, 17; Ro 11:33, 34) Yesu asosolaki mpenza mokano ya Yehova mpe atyaki yango na esika ya liboso na bomoi na ye. (Yn 4:34) Tiká ete tósala nyonso mpo tózwaka bikateli oyo ekosepelisa Yehova ndenge Yesu asalaki.—Yn 8:28, 29; Ef 5:15-17.
TALÁ VIDEO KOBÁ KOSOSOLA MOKANO YA YEHOVA (LE 19:18), MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:
Mpo na nini tosengeli kosalela mitinda ya Biblia na bomoi na biso?
Mitinda nini ya Biblia tosengeli kotalela ntango tozali kopona miziki oyo tokoyoka?
Mitinda nini ya Biblia tosengeli kotalela ntango tozali kopona molato mpe monzɛlɛ?
Na makambo nini mosusu ya bomoi tosengeli kosalela mitinda ya Biblia?
Ndenge nini tokoki kokolisa likoki na biso ya kososola mokano ya Yehova?
Bikateli na ngai emonisaka nini mpo na boyokani na ngai na Yehova?