Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb20 Septembre lok. 7
  • Okoki kopesa ntango mpe makasi na yo!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okoki kopesa ntango mpe makasi na yo!
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
  • Masolo mosusu
  • Omityela mikano mpo na mobu ya mosala ya sika—Pesá mabɔkɔ na kotonga bandako mpo na mosala ya Bokonzi
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
  • Misala ya kotonga na filiale​—Eteni ya ntina mingi ya mosala ya bosantu
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Kotonga Bandako ya Bokonzi nokinoki
    Buku ya mobu 2016 ya Batatoli ya Yehova
  • Kosala baplan mpe kotonga na mokili mobimba
    Buku ya mobu 2015 ya Batatoli ya Yehova
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
mwb20 Septembre lok. 7

BOMOI YA BAKRISTO

Okoki kopesa ntango mpe makasi na yo!

Ndeko oyo azali komungamunga wana azali kokata tiyo ya ebende na mosala ya botongi.

Ndenge Yisaya asakolaki yango, tozali komona bokoli monene na eteni ya ebongiseli ya Yehova awa na mabele. (Yis 54:2) Bokoli yango esali ete tóbakisa lisusu Bandako ya Bokonzi, Bandako ya mayangani, mpe bandako ya Betele. Nsima ya kotonga bandako yango, esɛngaka kobatela yango mpe bandako yango mosusu esɛngaka kobongisa yango lisusu. Yango wana, ndenge nini tokoki kopesa Yehova ntango na biso mpe makasi na biso?

  • Tokoki kopesa mabɔkɔ ntango baponi etuluku na biso ya mosala ya kosakola mpo na kotya bopɛto na Ndako ya Bokonzi

  • Tokoki komipesa mpo na kozwa formasyo ya kobatela Bandako ya Bokonzi na biso

  • Tokoki kotondisa formilɛrɛ (DC-50) mpo na mosala ya Biro ya kosala baplan ya bandako/Departema ya botongi (LDC) mpo na kopesa mabɔkɔ mpo na mwa ntango na misala ya botongi mpe na misala ya kobatela bandako yango na esika tofandi

  • Tokoki kotondisa formilɛrɛ A-19 (Demande d’admission comme volontaire) mpe kondima kosala ata pɔsɔ moko to koleka na teritware ya filiale na biso, na Betele mpe na bandako mosusu ya Betele

TALÁ VIDEO MOSALA MOKO YA BOTONGI EZALI KOBONGISAMA​—VIDEO YA MOKUSE, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Likambo nini ya monene emonanaki na likambo etali bavideo kobanda na 2014?

  • Mpo na kobimisa lisusu bavideo mingi ya losambo na biso, mosala nini ezali kobongisama, ekobanda ntango nini mpe ekosila ntango nini?

  • Ndenge nini bavolontɛrɛ bakoki kopesa mabɔkɔ na mosala yango?

  • Soki tolingi kopesa mabɔkɔ na mosala ya botongi na Ramapo, mpo na nini tosengeli kotondisa formilɛrɛ (DC-50) mpo na mosala ya LDC?

  • Nini emonisi ete Yehova nde azali kotambwisa mosala yango?

  • Ndenge nini tokoki kopesa mabɔkɔ na mosala yango ata soki tokokoka te kosala na esika yango ya botongi?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto