Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w25 Mars nk. 8-13
  • Mekolá Yehova ná Yesu na lolenge na yo ya kokanisa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mekolá Yehova ná Yesu na lolenge na yo ya kokanisa
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MEKOLÁ LOLENGE YA YEHOVA YA KOKANISA
  • ZALÁ NA KOMIKITISA
  • ZÁLA ‘MOTO YA MAKANISI MALAMU’
  • Ayekolaki kolimbisa epai ya Nkolo na ye
    Mekolá kondima na bango
  • Tómekola komikitisa ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Atikalaki sembo na komekama
    Mekolá kondima na bango
  • Ayekolaki kolimbisa epai ya Nkolo na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
w25 Mars nk. 8-13

LISOLO YA BOYEKOLI 10

LOYEMBO 31 Tambolá elongo na Nzambe!

Mekolá Yehova ná Yesu na lolenge na yo ya kokanisa

“Lokola Kristo amonaki mpasi na mosuni, bino mpe bózala na makanisi ya ndenge wana.”—1 PE. 4:1.

NA MOKUSE

Tokolobela ndenge ntoma Petro ayekolaki lolenge ya kokanisa ya Yesu mpe ndenge oyo biso mpe tokoki kosala yango.

1-2. Kolinga Yehova esɛngi nini, mpe ndenge nini Yesu amonisaki ete alingaki Yehova ndenge wana?

“OSENGELI kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, na makasi na yo nyonso mpe na makanisi na yo nyonso.” (Luka 10:27) Na maloba yango, Yesu amonisaki ete yango nde etinda oyo eleki monene na kati ya Mobeko ya Moize. Simbá ete kolinga Yehova esengeli kouta na motema na biso, oyo esangisi bamposa mpe mayoki na biso. Esɛngi mpe kokangama na Yehova na molimo na biso mobimba mpe na makasi na biso. Kasi, tosengeli mpe kolinga Yehova na makanisi na biso, oyo esangisi ndenge na biso ya kotalela makambo. Ya solo, tokoki ata mokolo moko te koyeba makanisi nyonso ya Yehova. Kasi tokoki koyeba malamu makanisi ya Nzambe soki toyekoli “makanisi ya Kristo” mpo Yesu amekolaki na ndenge ya kokoka makanisi ya Tata na ye.—1 Ko. 2:16.

2 Yesu alingaki Yehova na makanisi na ye nyonso. Ayebaki mokano ya Nzambe mpo na ye mpe azalaki na ekateli ya kosala yango, atako esɛngaki ete amona mpasi mpo na kosala oyo ezali sembo. Lokola atyaki makanisi nyonso na kosala mokano ya Tata na ye, Yesu atikaki eloko moko te elongola likebi na ye na mokano yango.

3. Ntoma Petro ayekolaki nini epai ya Yesu, mpe alendisaki bakristo básala nini? (1 Petro 4:1)

3 Petro ná bantoma mosusu bazwaki libaku ya kolekisa ntango elongo na Yesu mpe koyekola mbala moko ndenge oyo azalaki kokanisa. Ntango Petro akomaki mokanda na ye ya liboso na litambwisi ya elimo ya Nzambe, alendisaki bakristo bázala na makanisi lokola oyo ya Kristo.a (Tángá 1 Petro 4:1.) Na monɔkɔ ya Grɛki, liloba oyo Petro asalelaki ntango akomaki: “Bózala,” ezalaki komonisa basoda balati bibundeli mpo na etumba. Na yango soki bakristo bamekoli makanisi ya Yesu, to lolenge na ye ya kokanisa, bakozala na ebundeli ya nguya mpo na etumba oyo bazali na yango ya kobundisa bamposa ya kosala lisumu mpe mokili oyo eyangelami na Satana.—2 Ko. 10:​3-5; Ef. 6:12.

4. Ndenge nini lisolo oyo ekoki kosalisa biso tólanda toli ya Petro?

4 Na lisolo oyo, tokotalela lolenge ya Yesu ya kokanisa mpe tokomona ndenge oyo tokoki komekola yango. Tokoyekola ndenge oyo, na ndakisa na ye, tokoki (1) komekola lolenge ya Yehova ya kokanisa, oyo ekosalisa biso nyonso tózala na bomoko na ndenge na biso ya kokanisa, (2) kozala na komikitisa, mpe (3) kozala bato ya makanisi malamu na kotyeláká Yehova motema na nzela ya libondeli.

MEKOLÁ LOLENGE YA YEHOVA YA KOKANISA

5. Na libaku nini Petro amonisaki ete azalaki na makanisi ya Yehova te?

5 Tótalela libaku moko oyo Petro amonisaki ete azalaki na makanisi ya Yehova te. Yesu ayebisaki bantoma na ye ete asengeli kokende na Yerusaleme, kuna akokabama na lobɔkɔ ya bakonzi ya mangomba, bakonyokola ye makasi, mpe bakoboma ye. (Mat. 16:21) Mbala mosusu Petro azalaki kokoka kondima te ete Yehova akotika Yesu—elikya ya Yisraele mpe Masiya oyo alakamaki—abomama. (Mat. 16:16) Na yango, abendaki Yesu pembeni mpe alobaki na ye: “Zalá na boboto epai na yo moko, Nkolo; likambo wana ekokómela yo te.” (Mat. 16:22) Lokola Petro azalaki na makanisi lokola Yehova te na likambo yango, atalelaki makambo ndenge moko na Yesu te.

6. Ndenge nini Yesu amonisaki ete makanisi na ye eyokanaki na oyo ya Nzambe?

6 Makanisi ya Yesu eyokanaki mpenza na oyo ya Tata na ye ya likoló. Yesu alobaki na Petro: “Leká nsima na ngai, Satana! Ozali eloko oyo ezali kobɛtisa ngai libaku, mpo lolenge na yo ya kokanisa ezali ya Nzambe te, kasi ya bato.” (Mat. 16:23) Mbala mosusu Petro alukaki bolamu ya Yesu, kasi Yesu aboyaki toli na ye. Ezali liteya mpo na biso. Mokano ya Nzambe mpo na Yesu ezalaki te ete azala na bomoi oyo ezangi mpasi. Na libaku yango, Petro ayekolaki liteya ya ntina na oyo etali kozala na makanisi oyo eyokani na makanisi ya Nzambe.

7. Ndenge nini na nsima Petro amonisaki ete alingaki makanisi na ye eyokana na oyo ya Yehova? (Talá elilingi.)

7 Kendekende, Petro amonisaki ete alingaki makanisi na ye eyokana na oyo ya Yehova. Ntango ekokaki mpo bato ya bikólo oyo bakatami ngɛnga te bákɔta na ekólo ya Nzambe. Petro azwaki mokumba ya kosakwela Korneyi, oyo azalaki na kati ya bato ya liboso ya bikólo mosusu oyo bakómaki bakristo. Lokola Bayuda bazalaki na boyokani mpenza te na bato ya bikólo, esengelaki kosalisa Petro abongisa makanisi na ye mpo akoka kosakwela bango. Ntango Petro asosolaki mokano ya Nzambe na likambo yango, abongolaki lolenge na ye ya kotalela makambo. Na yango, ntango Korneyi atindaki bato bábenga ye, Petro akendaki “kozanga kotya ntembe.” (Mis. 10:​28, 29) Asakwelaki Korneyi ná bato ya libota na ye, mpe bazwaki batisimo.—Mis. 10:​21-23, 34, 35, 44-48.

Korneyi azali komema Petro ná baninga na ye na shambrɛ ya likoló ya ndako na ye.

Petro akɔti na ndako ya Korneyi (Talá paragrafe 7)


8. Ndenge nini tokoki komonisa ete makanisi na biso eyokani na oyo ya Yehova? (1 Petro 3:8 mpe maloba na nse ya lokasa)

8 Bambula na nsima, Petro alendisaki bakristo ‘bázalaka na bomoko na makanisi.’ (Tángá 1 Petro 3:8 mpe maloba na nse ya lokasa.) Biso basaleli ya Yehova tokoki kozala na bomoko na makanisi soki tozali komekola makanisi ya Yehova ndenge emonisami na Liloba na ye. Na ndakisa, Yesu alendisaki bayekoli na ye bátya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na bango. (Mat. 6:33) Mpo na yango, ndeko moko ya lisangá na bino akoki kozwa ekateli ya kobanda lolenge moko boye ya mosala ya ntango nyonso. Na esika ya koyebisa ye ete azala na boboto epai na ye moko, tosengeli koloba malamu mpo na mokano oyo amityeli mpe kopesa ye mabɔkɔ.

ZALÁ NA KOMIKITISA

9-10. Ndenge nini Yesu amonisaki komikitisa ya solosolo?

9 Na butu ya nsuka liboso abomama, Yesu ateyaki Petro ná bantoma mosusu liteya moko ya ntina na oyo etali komikitisa. Mwa bangonga liboso, Yesu atindaki Petro ná Yoane bákende kobongisa bilei ya nsuka oyo Yesu akolya elongo na bango awa na mabele. Na bibongiseli oyo basalaki, babongisaki saani moko ya monene mpe esumɛ mpo na kosokola makolo ya bapaya liboso bábanda kolya. Kasi ntango bato bakoya, nani akosala mosala yango oyo esɛngaki komikitisa?

10 Yesu amonisaki komikitisa ya solosolo; akakatanaki te kosala mosala yango. Na ntembe te bantoma bakamwaki mpenza komona ye azali kosala mosala oyo basaleli nde bazalaki kosala. Yesu alongolaki bilamba na ye ya likoló, akangaki esumɛ na loketo na ye, atyaki mai na saani, mpe abandaki kosukola bango makolo. (Yoa. 13:​4, 5) Mbala mosusu ezwaki mwa ntango mpo na kosukola makolo ya bantoma nyonso 12—ata mpe ya Yudasi, oyo alingaki kotɛka ye. Kasi, na komikitisa nyonso, Yesu asalaki mosala yango tii na nsuka. Na nsima na motema molai nyonso, Yesu alobaki na bango: “Bokangi ntina ya likambo oyo nasali bino? Bobengaka ngai, ‘Moteyi’ mpe ‘Nkolo,’ mpe bolobaka solo, mpo nazali Moteyi mpe Nkolo. Na yango, soki ngai, Nkolo mpe Moteyi, nasukoli bino makolo, bino mpe bosengeli kosukolana makolo.”—Yoa. 13:​12-14.

Komikitisa ya solosolo eutaka . . . na makanisi na biso ya kati

11. Ndenge nini Petro amonisaki ete ayekolaki komikitisa? (1 Petro 5:5) (Talá mpe elilingi.)

11 Petro ayekolaki komikitisa epai ya Yesu. Nsima ya kozonga ya Yesu na likoló, Petro asalaki likamwisi ya kobikisa mobali moko oyo abotamá motɛngumi. (Mis. 1:​8, 9; 3:​2, 6-8) Likambo yango ya kokamwa ebendaki ebele ya bato. (Mis. 3:11) Petro aboyaki ete bato bákumisa ye, atako akolaki na esika oyo bato balukaka kozwa lokumu mpe koyebana mingi mpenza! Kasi, na komikitisa nyonso alukaki lokumu na ye moko te, kasi apesaki nkembo epai ya Yehova ná Yesu, alobaki: “Na nzela ya nkombo [ya Yesu], mpe na nzela ya kondima na biso na nkombo na ye, mobali oyo bozali komona mpe boyebi akómisami makasi.” (Mis. 3:​12-16) Na mokanda oyo Petro akomelaki bakristo na oyo etali ntina ya kolona komikitisa, asalelaki liloba oyo ekoki kokundwela biso libaku oyo Yesu akangaki esumɛ na loketo na ye mpe asukolaki makolo ya bantoma na ye.—Tángá 1 Petro 5:5.

Petro ná Yoane na kati ya tempelo. Petro atomboli lobɔkɔ na likoló wana mobali oyo abotamá motɛngumi, oyo auti kobika, atɛlɛmi na katikati na bango.

Nsima ya kosala likamwisi, Petro apesaki nkembo epai ya Yehova ná Yesu. Biso mpe tokomonisa komikitisa soki tozali kosala malamu kozanga kozela ete bándima biso to bápesa biso mbano (Talá paragrafe 11-12)


12. Ndenge nini tokoki kokoba kolona komikitisa lokola Petro?

12 Tokoki komekola Petro na oyo etali kolona komikitisa. Kobosana te ete komikitisa ya solosolo esuki kaka te na koloba maloba oyo ebongi. Liloba oyo Petro asalelaki mpo na komikitisa emonisaka makanisi na biso ya kati, “elimo ya komikitisa.” Tosalelaka bato mosusu makambo ya malamu mpo tolingaka Yehova mpe bato, kasi te mpo tolingi ete bákumisa biso. Soki na esengo nyonso tozali kosalela Yehova mpe bandeko na biso na lolenge nyonso oyo tokoki, ata soki bato bazali komona milende na biso to te, yango ekomonisa ete tozali na komikitisa.—Mat. 6:​1-4.

ZÁLA ‘MOTO YA MAKANISI MALAMU’

13. Kozala ‘moto ya makanisi malamu’ elimboli nini?

13 Kozala ‘moto ya makanisi malamu’ elimboli nini? (1 Pe. 4:7) Mokristo oyo azali moto ya makanisi malamu asalaka nyonso oyo akoki mpo na kozwa bikateli oyo eyokani na makanisi ya Yehova. Mokristo ya ndenge wana ayebi ete eloko moko te ezali na ntina mingi koleka boyokani na ye na Yehova. Amitalelaka na bokatikati mpe andimaka ete ayebi makambo nyonso te. Mpe amonisaka ete atyelaka litambwisi ya Yehova motema na ndenge abondelaka mbala na mbala na komikitisa nyonso.b

14. Na libaku nini Petro alongaki te kotyela Yehova motema?

14 Na butu ya nsuka liboso akufa, Yesu akebisaki bayekoli na ye ete: “Na butu oyo, bino nyonso bokobɛta libaku mpo na makambo oyo ekokómela ngai.” Lokola Petro amityelaki motema, alobaki: “Ata soki basusu nyonso babɛti libaku mpo na makambo oyo ekokómela yo, ngai nakobɛta libaku ata moke te!” Na butu yango, Yesu apesaki bayekoli na ye mosusu toli oyo: “Bókoba kosɛnzɛla mpe kobondela ntango nyonso.” (Mat. 26:​31, 33, 41) Soki Petro alandaki toli yango mbala moko, mbala mosusu alingaki kozala na mpiko ya kondima ete azali moyekoli ya Yesu. Kasi Petro awanganaki Nkolo na ye, mpe ayokaki mawa mingi mpo na yango.—Mat. 26:​69-75.

15. Na butu na ye ya nsuka awa na mabele, ndenge nini Yesu amonisaki ete azalaki moto ya makanisi malamu?

15 Yesu atyelaki Yehova motema mobimba. Atako azalaki moto ya kokoka, azalaki kobondela mbala na mbala. Yango epesaki ye mpiko ya kosala mokano ya Yehova mpo na ye. (Mat. 26:​39, 42, 44; Yoa. 18:​4, 5) Na ntembe te, komona ndenge Yesu abondelaki mingi na butu wana etikalaki libela na makanisi ya Petro.

16. Ndenge nini Petro amonisaki ete akómaki moto ya makanisi malamu? (1 Petro 4:7)

16 Na nsima, Petro akómaki kotyela Yehova motema mingi na nzela ya libondeli. Nsima ya kosekwa, Yesu ayebisaki Petro ná bantoma mosusu ete bakozwa elimo santu mpo bákokisa mokumba na bango ya kosakola. Kasi, Yesu asɛngaki bango bázela na Yerusaleme tii ntango bakozwa yango. (Luka 24:49; Mis. 1:​4, 5) Petro asalaki nini wana azalaki kozela? Ye ná bandeko na ye bakristo “batingamaki na mabondeli.” (Mis. 1:​13, 14) Bambula na nsima, na mokanda na ye ya liboso, Petro alendisaki bakristo bázala bato ya makanisi malamu mpe bátyela Yehova motema na nzela ya libondeli. (Tángá 1 Petro 4:7.) Petro ayekolaki kotyela Yehova motema mpe akómaki likonzí na lisangá.—Gal. 2:9.

17. Ata soki tozali na makoki ya ndenge nini, tosengeli kokoba kosala nini? (Talá mpe elilingi.)

17 Mpo tózala bato ya makanisi malamu, tosengeli kobondelaka Yehova mbala na mbala. Na bongo, tokomona ete tosengeli kokoba kobondela Yehova ata soki tozali na makoki ya ndenge nini. Na yango, mingimingi ntango tolingi kozwa bikateli ya ntina, tosengeli kobondela Yehova atambwisa biso, na elikya ete ayebi oyo eleki malamu mpo na biso.

Petro ayekolaki kotyela Yehova motema na nzela ya libondeli. Biso mpe tokozala bato ya makanisi malamu soki tozali kobondela mpo Yehova asalisa biso, mingimingi ntango tolingi kozwa bikateli ya ntina (Talá paragrafe 17)c


18. Ndenge nini tokoki mpenza koyokanisa makanisi na biso na oyo ya Yehova?

18 Tozali mpenza na botɔndi ndenge Yehova asalá biso na likoki ya komekola bizaleli na ye. (Eba. 1:26) Ya solo, tokoki te komekola Yehova na ndenge ya kokoka. (Yis. 55:9) Kasi, ndenge moko na Petro, tokoki mpenza koyokanisa makanisi na biso na oyo ya Yehova. Tiká ete tókoba komekola lolenge ya kokanisa ya Nzambe, tózala na komikitisa mpe tózala bato ya makanisi malamu.

NDENGE NINI TOKOKI . . .

  • komekola lolenge ya kokanisa ya Yehova?

  • kozala na komikitisa?

  • kozala “bato ya makanisi malamu”?

LOYEMBO 30 Tata na ngai, Nzambe na ngai, mpe Moninga na ngai

a Maloba “makanisi ya ndenge wana,” oyo ezali na 1 Petro 4:​1, ekoki mpe kobongolama na “elimo wana; mokano ya motindo wana.”

b Mpo na koyeba makambo mosusu na oyo etali kozala moto ya makanisi malamu, talá na jw.org to na JW Library® “Ndenge bavɛrsɛ ya Biblia elimbolami,” lisolo “2 Timote 1:7 elimbolami—‘Nzambe apesaki biso elimo ya bibangabanga te,’” na motó ya likambo moke “makanisi malamu.”

c NDIMBOLA YA BILILING: Ndeko mwasi moko azali kobondela na nse ya motema liboso bátuna ye mituna mpo na kozwa mosala.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto