Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w25 Décembre nk. 14-19
  • Tómekola komikitisa ya Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tómekola komikitisa ya Yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • YEHOVA ALINGAKA BATO BÁYA EPAI NA YE
  • YEHOVA AZALAKA MAKAMBO MAKASIMAKASI TE
  • YEHOVA AZALI NA MOTEMA MOLAI
  • YEHOVA APESAKA LOKUMU NA BATO OYO BASUSU BAKOKI KOMONA MPAMBA
  • Mekolá Yehova ná Yesu na lolenge na yo ya kokanisa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Ndimá ete okoki koyeba makambo mosusu te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Kopesa ememaka esengo mingi koleka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Bikateli oyo emonisaka ete totyelaka Yehova motema
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
w25 Décembre nk. 14-19

LISOLO YA BOYEKOLI 50

LOYEMBO 48 Tótambola na Yehova mokolo na mokolo

Tómekola komikitisa ya Yehova

“Bókóma bamekoli ya Nzambe lokola bana ya bolingo.”—EF. 5:1.

NA MOKUSE

Tokoyekola ndenge minei oyo tokoki komekola komikitisa ya Yehova.

1. Mpo na nini ekoki kokamwisa ndenge Yehova azali na komikitisa?

NTANGO otalaka bakonzi ya mokili ya lelo, omonaka mbala moko ezaleli ya komikitisa epai na bango? Mbala mosusu te. Nzokande, Yehova, oyo azali Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, azali na komikitisa. (Nz. 113:​5-8) Komikitisa ezali na kati mpenza ya bomoto ya Yehova; ata lolendo moke te ezali na kati na ye. Na lisolo oyo, tokolobela bizaleli minei ya bomoto ya Yehova mpe ndenge oyo mokomoko na yango emonisaka komitikisa na ye. Tokomona mpe ndenge oyo Yesu amekolaki komikitisa ya Tata na ye. Kotalela bizaleli yango ekosalisa biso tópusana lisusu penepene na Yehova mpe tómekola lisusu mingi komikitisa na ye.

YEHOVA ALINGAKA BATO BÁYA EPAI NA YE

2. Nzembo 62:8 emonisi nini mpo na Yehova? (Talá mpe elilingi.)

2 Mbala mingi bato ya lolendo bakimisaka basusu. Lokola bamimonaka ete baleki basusu, basalaka makambo oyo esalaka ete bato bákakatana kokende epai na bango to kutu bákimaka bango mpenza. Bakeseni mpenza na Yehova! Lokola Tata na biso ya likoló azali na komikitisa, asɛngi biso nyonso tópusana penepene na ye na libondeli mpe tóyebisa ye makambo oyo ezali kotungisa makanisi mpe motema na biso. (Tángá Nzembo 62:8.) Kaka ndenge tata ya bolingo ayokaka mbala moko mitungisi ya bana na ye, Yehova ayambaka mpe ayokaka mabondeli ya basaleli na ye. Kutu, akomisá mabondeli yango mingi na Biblia. Yango emonisi ete alingaka ete bato báya epai na ye. (Yos. 10:​12-14; 1 Sa. 1:​10-18) Kasi tokosala nini soki na bantango mosusu tomiyoki ete tobongi te kopusana penepene na Yehova?

Tata moko azali koyoka mwana na ye na likebi, mwana yango azali koyebisa ye ndenge abuki mbɛki ntango azalaki kosakana na mpɛpɔ na ye.

Mpo na komekola komikitisa ya Yehova, tata moko azali koyoka mwana na ye oyo apasoli mbɛki ntango azali kosakana (Talá paragrafe 2)


3. Mpo na nini okoki kondima ete Yehova alingi opusana penepene na ye mbala na mbala na libondeli?

3 Tokoki kopusana epai ya Yehova na libondeli ata soki tozali komiyoka ete tobongi te alinga biso. Mpo na nini tokoki koloba bongo? Na ndakisa ya mwana oyo abungaki, Yesu akokanisaki Yehova na tata ya motema mawa oyo mwana na ye azalaki komona ete abongi te kondimama lisusu na kati ya libota. Kasi tata asalaki nini ntango mwana yango azongaki na ndako? Yesu alobaki ete ntango kaka tata amonaki mwana na ye na mosika, “apotaki mbangu, ayambaki ye makasi mpe apesaki ye lipwɛpwɛ na boboto.” (Luka 15:​17-20) Yehova azali lokola tata wana. Ntango kaka ayoki libondeli ya moto oyo motema na ye etutami, oyo azali konyokwama mpo na mayoki ya ngambo to mitungisi, komitikisa ya Yehova etindaka ye atyela moto yango likebi nyonso. (Bil. 3:​19, 20) Yehova ayokelaka ye mawa, mpe na ndenge ya elilingi, apotaka mbangu epai ya moto yango mpo na kobɔndisa ye mpe komonisa ye ete ayokeli ye mawa mpe alingaka ye. (Yis. 57:15) Ndenge nini Yehova ‘apotaka mbangu epai na biso’ lelo oyo? Mbala mingi asalaka yango na nzela ya bankulutu, bandeko na biso ya libota oyo bazali Batatoli, mpe bandeko mosusu ya lisangá. (Yak. 5:​14, 15) Yehova asalisaka biso bongo mpo alingi ete tózala penepene na ye.

4. Nini emonisaki ete Yesu alingaki bato báya epai na ye?

4 Yesu amekolaka Tata na ye. Ndenge moko na Tata na ye, Yesu azali na komikitisa. Yango wana ntango azalaki awa na mabele, bato mingi bazalaki kopusana penepene na ye. Bazalaki kobanga te kotuna ye mituna. (Mrk. 4:​10, 11) Na yango, soki asɛngi bango bápesa likanisi na likambo moko, bazalaki koyebisa ye makambo oyo ezali mpenza na mitema na bango. (Mat. 16:​13-16) Mpe ntango basali mabunga, bazalaki kolɛnga na kobanga te; bayebaki ete Yesu azalaki na boboto, motema mawa, mpe motema molai. (Mat. 17:​24-27) Lokola Yesu amekolaki Tata na ye malamu mpenza, esalisaki bayekoli na ye báyeba mpe malamu ndenge Yehova azalaka. (Yoa. 14:9) Bayekolaki ete Yehova azali te lokola bakonzi ya mangomba ya ntango wana, oyo bazalaki makambo makasimakasi, lolendo, mpe mosika na bato. Kasi, azali na komikitisa mpe alingaka ete bato báya epai na ye.

5. Na ndenge nini kozala na komikitisa ekosalisa mpo basusu báyaka epai na biso?

5 Ndenge nini biso tokoki komekola Yehova? Soki tozali na komikitisa, bato bakobanda kokima biso te. Soki tozali na komikitisa, tokozala te na likunya, lolendo, mpe koboya kolimbisa, bizaleli oyo ekokimisa basusu. Kasi tokozala na boboto, motema molai, mpe tokobanda kolimbisa, bizaleli oyo ekobenda basusu epai na biso. (Kol. 3:​12-14) Mingimingi bankulutu basengeli kosala makasi bámonisa ete balingaka bandeko báya epai na bango. Nzokande mpo ezala bongo, basengeli komonanaka. Yango elimboli ete basengeli kosala makasi ya koya makita na Ndako ya Bokonzi, mpe bakopona kosala bongo na esika ya kolanda kaka na nzela ya video, nzokande eloko te epekisi bango kokende na Ndako ya Bokonzi. Mpe soki libaku ezwami, bakosala makasi básakolaka elongo na bandeko na mosala ya kosakola ndako na ndako. Soki bandeko bayebi bankulutu malamu, bakobanga te kosolola na bango ntango bazali na mposa ya lisalisi.

YEHOVA AZALAKA MAKAMBO MAKASIMAKASI TE

6-7. Pesá bandakisa oyo emonisi ndenge Yehova ayokaka kolela ya basaleli na ye.

6 Bato mingi ya lolendo bazalaka makambo makasimakasi epai ya basusu. Kasi lokola Yehova azali na komikitisa, azalaka makambo makasimakasi te, atingamaka mpe na makambo te—atako aleki moto nyonso na makambo nyonso. Tótalela ndenge asalelaki Miriame, ndeko ya Moize, makambo. Miriame ná Arona bayimayimaki mpo na Moize. Lokola Moize azalaki momonisi ya Yehova, Miriame azangaki nde limemya epai ya Yehova. Na yango, Yehova asilikelaki ye mpe apesaki ye etumbu ya maladi ya maba. Kasi ntango Arona asɛngaki báyokela Miriame mawa mpe Moize abondelaki Yehova abikisa ndeko na ye ya mwasi, Yehova asalaki nini? Moto ya lolendo akotingama kaka ete etumbu wana ezala kaka. Kasi lokola Yehova azali na komikitisa, abongolaki ekateli na ye mpe abikisaki Miriame.—Mit. 12:​1-15.

7 Yehova amonisaki mpe komikitisa na likambo ya Mokonzi Ezekiasi. Na nzela ya mosakoli Yisaya, Yehova ayebisaki mokonzi yango ete akokufa. Na yango, Ezekiasi alelaki mpe asɛngaki Yehova abikisa ye. Na motema mawa na ye, Yehova abakiselaki mokonzi yango mbula 15 na bomoi na ye. (2 Bak. 20:​1, 5, 6) Ya solo, komikitisa etindaka Yehova ayokela bato mawa mpe azala makambo makasimakasi te.

8. Bandakisa nini emonisi ete Yesu azalaka makambo makasimakasi te? (Marko 3:​1-6)

8 Yesu amekolaka Tata na ye. Ntango azalaki awa na mabele, Yesu aboyaki te kosalela bato bolamu ntango ebongaki kosalisa bango. Na ndakisa, abikisaki bato na Sabata atako batɛmɛli na ye ya mitema makasi bazalaki kolinga te. (Tángá Marko 3:​1-6.) Ata na mokumba na ye ya mokonzi ya lisangá ya bokristo, Yesu azali makambo makasimakasi te. Na ndakisa, ntango moto moko na lisangá asali lisumu ya monene, amoniselaka ye motema molai, atikelaka ye ntango mpenza mpo abongwana.—Em. 2:​2-5.

9. Ndenge nini tokoki kokóma na ezaleli ya makambo makasimakasi te mpe komonisa yango? (Talá mpe bililingi.)

9 Ndenge nini biso tokoki komekola Yehova? Na komikitisa nyonso, tosengeli komekola Yehova mpo na kokóma makambo makasimakasi te na lolenge na biso ya kokanisa mpe ya kosala makambo. (Yak. 3:17) Na ndakisa, baboti oyo bazali makambo makasimakasi te bakokanga miso te na makambo mabe ya bana, kasi bakomizela mpe te ete básala makambo oyo eleki mbula na bango. Ndakisa malamu ezali na Ebandeli 33:​12-14, epai Yakobo atalelaki makoki ya bana na ye. Baboti oyo bazali na komikitisa mpe bazali makambo makasimakasi te bakosala mpe makasi bákokanisa mwana moko na mosusu te. Bankulutu mpe basengeli kozala makambo makasimakasi te. Lolenge moko ya kosala yango ezali ya kondima ekateli oyo bankulutu mingi na lisangani ya bankulutu bazwi, soki ebuki mitinda ya Biblia te. (1 Tim. 3:​2, 3) Mpe biso nyonso tósalaka makasi tókanga ntina ya makanisi ya basusu ata soki biso tozali kotalela makambo ndenge mosusu. (Rom. 14:1) Ya solo, moto nyonso na lisangá asengeli kosala makasi mpo ‘bato nyonso báyeba ete azalaka makambo makasimakasi te.’—Flp. 4:5.

Bililingi: Tata moko azali na esengo elongo na bana na ye na mosala ya kosakola ndako na ndako. 1. Azali kosɛka ntango mwana na ye ya mobali azali kopesa moto mwa buku “Sepelá na bomoi libela na libela!” 2. Na nsima, azali kosɛka ntango mwana na ye ya mwasi azali kopesa mwasi moko karte ya jw.org.

Tata ya makambo makasimakasi te asɛngaka bana na ye makambo mingi te na mosala ya kosakola (Talá paragrafe 9)


YEHOVA AZALI NA MOTEMA MOLAI

10. Ndenge nini Yehova amonisaki motema molai?

10 Na ntembe te omoná ete bato ya lolendo balingaka kozela te. Lolendo ekómisaka bango motema mokuse. Bokeseni ezali makasi na Yehova; ye azali na motema molai mingi mpenza! Na ndakisa, na mikolo ya Noa, Yehova alobaki ete akozela mbula 120 liboso ya koboma bato mabe. (Eba. 6:3) Na yango Noa azwaki ntango ya kobɔkɔla bana na ye mpe kotonga masuwa na lisalisi ya libota na ye. Bambula na nsima, anzelu oyo azalaki momonisi ya Yehova ayokaki Abrahama na motema molai mpenza ntango atunaki ye mituna na oyo etali kobebisama ya Sodoma ná Gomora. Moto ya lolendo akoki koloba: ‘Ebandi boni otuna ngai mituna!’ Kasi na ndakisa ya Yehova, anzelu yango azalaki na motema molai epai ya Abrahama.—Eba. 18:​20-33.

11. Ndenge 2 Petro 3:9 emonisi yango, mpo na nini Yehova azali komonisa motema molai na ntango na biso?

11 Na komikitisa nyonso, Yehova azali mpe komonisa motema molai na mikolo na biso. Azali kozela ntango oyo atyá ekoka mpo ayeisa nsuka. Mpo na nini azali komonisa motema molai? “Mpo alingi moto ata moko te abomama, kasi alingi ete bato nyonso bábongola motema.” (Tángá 2 Petro 3:9.) Yehova azali komonisa motema molai kaka mpamba? Te! Bamilio ya bato ya mitema sembo bakómi kosambela ye. Mpe tozali kolikya ete bamilio mingi ya bato mosusu mpe bakosala yango. Atako bongo, motema molai ya Yehova ezali na ndelo. Yehova alingaka bato, kasi akangaka miso na mabe te. Akotika te mabe ekoba mpo na libela.—Hab. 2:3.

12. Ndenge nini Yesu azali komekola motema molai ya Yehova?

12 Yesu amekolaka Tata na ye. Yesu amekoli motema molai ya Yehova na boumeli ya bankóto ya bambula. Yesu amoni ndenge Satana azali kokosela Yehova mpe bato ya sembo makambo. (Eba. 3:​4, 5; Yobo 1:11; Em. 12:10) Yesu amoni mpe mpasi makasi oyo bato bazali komona. Kanisá sikoyo ndenge azali kozela mpenza ntango ya “kobebisa misala ya Zabolo”! (1 Yoa. 3:8) Nini esalisaka Yesu azela na motema molai ntango oyo Yehova akopesa ye nzela ya kobebisa misala nyonso ya Zabolo? Ntina moko ezali ete Yesu azali na komikitisa mpe yango etindaka ye atika makambo etali ntango na esika oyo ebongi, elingi koloba, na mabɔkɔ ya Yehova.—Mis. 1:7.

13. Ndenge nini Yesu amoniselaki bantoma na ye motema molai, mpe mpo na nini?

13 Ntango azalaki awa na mabele, Yesu amonisaki mpe motema molai epai ya bantoma na ye. Na ndakisa, ntango bantoma bazalaki kowelana mbala na mbala mpo na koyeba nani aleki baninga, Yesu alɛmbaki bango te. Kasi, akobaki komonisa motema molai. (Luka 9:46; 22:​24-27) Atyaki motema ete nsima ya mwa ntango bakosala bambongwana oyo esengeli. Yo mpe osalaka mbala na mbala libunga kaka moko? Soki ezali bongo, na ntembe te ozali na botɔndi ndenge Mokonzi na biso azali na komikitisa mpe motema molai!

14. Ndenge nini tokoki kokóma na motema molai?

14 Ndenge nini biso tokoki komekola Yehova? Soki tokómi na “makanisi ya Kristo,” ekozala mpasi te tókanisaka mpe tósalaka makambo lokola Yehova. (1 Ko. 2:16) Ndenge nini tokoki koyeba malamu makanisi ya Kristo? Nzela ya mokuse ezali te. Tosengeli kotánga Baevanzile. Na nsima, tosengeli kozwa ntango ya kokanisa ndenge oyo masolo oyo totángi emonisi lolenge oyo Yesu azalaki kotalela makambo. Lisusu, tosengeli kosɛnga Yehova asalisa biso tómekola komikitisa ya Yesu mpe lolenge na ye ya kokanisa. Wana tozali kokóma na makanisi ya Kristo, tokobanda kokóma mpe lokola Nzambe, tokozala na motema molai mingi ezala epai na biso moko to epai ya bandeko na biso bakristo.—Mat. 18:​26-30, 35.

YEHOVA APESAKA LOKUMU NA BATO OYO BASUSU BAKOKI KOMONA MPAMBA

15. Ndenge nini Yehova asalelaki maloba oyo ezali na Nzembo 138:6?

15 Tángá Nzembo 138:6. Ezali mpenza lokumu mpo na bato oyo basusu bakoki komona mpamba ndenge Nkolo Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba ayebi bango! Tólobela kaka mwa bandakisa ya bato ya komikitisa oyo Yehova atyelaki likebi. Mbala mosusu okokanisa bango mbala moko te, kasi bankombo na bango ezali na kati ya Biblia. Na ndakisa, elimo ya Yehova esalisaki Moize atánga mwasi moko na nkombo Debora, oyo azalaki na bomoi na ntango ya batata ya mabota. Mwasi yango azalaki mosaleli na libota ya Yisaka mpe ya Yakobo na bosembo nyonso bambula soki 125! Atako toyebi makambo mingi te mpo na mwasi yango ya sembo, Yehova alingaki Moize akoma ata likambo moko oyo emonisi ete azalaki na bolingo. (Eba. 24:59; 35:​8, msl.) Bankama ya bambula na nsima, Yehova aponaki Davidi, elenge moko mobateli ya mpate, mpe atyaki ye mokonzi ya ekólo Yisraele. (2 Sa. 22:​1, 36) Mwa moke nsima ya kobotama ya Yesu, Nzambe atindaki baanzelu epai ya babateli ya mpate mpamba mpo na koyebisa bango ete moto oyo akozala Masiya abotami na Beteleme; apesaki bango lokumu na ndenge bazalaki bato ya liboso ya koyeba likambo yango. (Luka 2:​8-11) Mpe ntango Maria ná Yozefe bamemaki Yesu na tempelo, Yehova apesaki mobange Simeone mpe Ana lokumu na ndenge alakisaki bango mwana na Ye. (Luka 2:​25-30, 36-38) Ya solo, “atako Yehova atombwami, atyelaka moto ya komikitisa likebi”!

16. Ndenge nini Yesu amekolaki ndenge oyo Tata na ye asalelaka basusu makambo?

16 Yesu amekolaka Tata na ye. Ndenge moko na Tata na ye, Yesu mpe apesaki bato oyo basusu bakoki komona mpamba lokumu. Ateyaki “bato batángá kelasi te mpe bato mpamba” makambo oyo etali Bokonzi ya Nzambe. (Mis. 4:13; Mat. 11:25) Lisusu, Yesu abikisaki bato ya maladi, mpe na makambo oyo asalelaki bango, azongiselaki bango kaka kolɔngɔnɔ ya nzoto te, kasi mpe lokumu na bango. (Luka 5:13) Na butu ya nsuka liboso akufa, Yesu asukolaki makolo ya bantoma na ye, mosala ya basaleli. (Yoa. 13:5) Lisusu, liboso amata na likoló, apesaki bayekoli na ye nyonso, bato ya komikitisa, oyo bazalaki wana mpe oyo basengelaki koya nsima lokumu na ndenge apesaki bango mosala oyo eleki ntina oyo moto akoki kozwa: kosalisa basusu bázwa bomoi ya seko.—Mat. 28:​19, 20.

17. Ndenge nini tokoki kopesa basusu lokumu? (Talá mpe elilingi.)

17 Ndenge nini biso tokoki komekola Yehova? Tokopesa bato lokumu ntango tozali kosakola nsango malamu epai ya bato nyonso oyo balingi koyoka biso, kozanga kotala esika bauti, loposo na bango to kelasi oyo batángá. Longola yango, tokopesa bandeko ya lisangá lokumu ntango tozali komona ete baleki biso, ata soki tozali na makoki to mikumba nini. (Flp. 2:3) Yehova asepelaka ntango, na komikitisa nyonso, ‘tozali bato ya liboso’ mpo na kopesana lokumu na likambo wana mpe na makambo mosusu.—Rom. 12:10; Sef. 3:12.

Bandeko basi mibale bazali koyekola Biblia elongo na mwasi moko oyo azali na bolɔkɔ.

Tokomekola komikitisa ya Yehova ntango tozali kosakwela bato ya ndenge nyonso nsango malamu (Talá paragrafe 17)a


18. Mpo na nini olingi komekola komikitisa ya Yehova?

18 Wana tozali kosala makasi mpo na komekola komikitisa ya Tata na biso ya likoló oyo atondi na bolingo, bato bakobanda kokima biso te, tokozala makambo makasimakasi te, mpe tokozala na motema molai mingi. Lisusu, tokopesa basusu lokumu, ndenge Yehova asalaka. Tiká ete milende oyo biso nyonso tozali kosala mpo na kopusana penepene ya Nzambe na biso ya komikitisa esala ete tózala lisusu na motuya mingi na miso na ye!—Yis. 43:4.

NDENGE NINI KOMIKITISA EKOKI KOSALISA YO . . .

  • ozala te moto oyo basusu bakimaka?

  • ozala makambo makasimakasi te?

  • ozala na motema molai?

LOYEMBO 159 Pesá Yehova nkembo

a NDIMBOLA YA ELILINGI: Bandeko basi ya komikitisa bamekoli Yehova, bazali koteya basi oyo bazali na bolɔkɔ.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto