Mibange—Bozali na motuya na lisangá
“Soki nakanisi, nakamwaka makambo oyo nazalaki kosala liboso. Sikoyo makasi esilá mpo mbula epusani.”—Connie, mbula 83.
Mbala mosusu yo mpe makasi esili mpo ozali kokóma mobange. Atako osaleli Yehova na bosembo bambula mingi, mbala mosusu ozali komimona ntina te mpo okoki lisusu kosala te makambo oyo ozalaki kosala liboso. Na ndakisa, okoki kobanda kokokanisa makambo ozali kosala sikoyo na makambo oyo osalaki kala. Soki ezali bongo, nini ekoki kosalisa yo otika kosala bongo?
MAKAMBO OYO YEHOVA AZALI KOSƐNGA YO
Omituna boye: ‘Yehova azali kosɛnga ngai nini?’ Okoki kozwa libɔndisi na maloba ya Kolimbola Mibeko 6:5, oyo elobi: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makasi na yo nyonso.”
Na kotalela vɛrsɛ yango, Yehova asɛngi yo osalela ye na motema, molimo mpe makasi na yo nyonso. Koyeba likambo yango ekoki kosalisa yo oboya komikokanisa na basusu, to kokokanisa makambo oyo okoki kosala sikoyo na oyo ozalaki na likoki ya kosala kala.
Kanisá likambo oyo: Ntango ozalaki elenge, ozalaki kopesa Yehova nini? Basaleli mingi ya Yehova bakoloba ete bazalaki kopesa Yehova eloko na bango oyo eleki malamu. Eloko na yo oyo eleki malamu etalelaki makambo ya bomoi na yo na ntango wana. Sikoyo okoki kopesa Yehova nini? Na ntembe te ozali kopesa oyo eleki malamu na kotalela makambo ya bomoi na yo lelo oyo, oyo ozali na likoki ya kosala sikoyo. Soki otaleli makambo ndenge wana, okomona ete ozali kopesa Yehova kaka oyo ozalaki kopesa ye na kala. Ozalaki kopesa ye oyo elekaki malamu na ntango wana, sikoyo mpe ozali kopesa ye oyo eleki malamu.
Opesaki Yehova oyo eleki malamu ntango ozalaki elenge, mpe ozali kopesa ye oyo eleki malamu ndenge okómi mobange
OKOKI KOSALISA MPENZA BASUSU
Kanisá mpe likambo mosusu: Na esika omona ete mbula na yo ezali kopekisa yo kosala mingi, salá makasi omona yango lokola libaku ya sika. Kutu, lokola ozali mokristo oyo akómi mobange, okoki kosala makambo mosusu sikoyo oyo okokaki kosala te na bolenge. Na ndakisa, okoki kosala boye:
Yebisáká basusu mateya oyo ozwá na bomoi na yo. Tótala naino maloba oyo ezali na Biblia:
Mokonzi Davidi: “Nazalaki elenge mpe sikoyo nakómi mobange, kasi namoná naino te moto ya sembo asundolami, to bana na ye bazali koluka limpa.”—Nz. 37:25.
Yosua: “Sikoyo talá! Etikali moke nakufa, mpe boyebi malamu na motema na bino mobimba mpe na molimo na bino mobimba ete ata liloba moko te na bilaka nyonso ya malamu oyo Yehova Nzambe na bino apesaki bino, ezangi kokokisama. Yango nyonso ekokisami mpo na bino. Ata liloba moko te ezangi kokokisama.”—Yos. 23:14.
Mbala mosusu yo mpe olobá maloba ya ndenge wana. Davidi ná Yosua balobaki makambo oyo esalemaki na bomoi na bango. Lokola basaleli yango ya sembo ya Yehova balobaki makambo oyo bango moko bamonaki mpe bayokaki na boumeli ya bambula ebele, maloba na bango ezali na kilo mingi.
Soki ozali kosalela Yehova banda kala, yo mpe bɛtáká masolo ya mapamboli oyo ozwá. Ozali koyeba lisusu libaku moko oyo omonaki ndenge Yehova apambolaki basaleli na ye? Kokakatanaka te kobɛtɛla basusu masolo ya bongo! Yango ekoki kolendisa bango, ndenge kaka elendisaki yo. Mpe ntango basusu bayoki masolo ya makambo oyo okutaná na yango na mosala ya Yehova, ekoki kolendisa bango mpenza.—Rom. 1:11, 12.
Lolenge mosusu oyo okoki kolendisa basusu ezali ya koyangana na makita na Ndako ya Bokonzi soki okoki kosala yango. Kuna okolendisa bandeko, mpe bango mpe bakolendisa yo. Connie, oyo tolobelaki na ebandeli, alobi boye: “Koyangana na makita esalisaka ngai nalɛmba nzoto te. Na kotalela bolingo nyonso oyo nazwaka epai ya bandeko na Ndako ya Bokonzi, ndenge nini nakoki kolɛmba nzoto? Nasalaka makasi namonisa botɔndi epai ya basusu, nakabelaka bango mwa biloko ya mikemike. Mpe nasalaka makasi nakoba kosala makambo ya elimo elongo na bandeko ya lisangá.”
YEHOVA AZWAKA MOSALA NA YO YA SEMBO NA MOTUYA
Biblia etondi na bandakisa ya bato oyo bakokaki lisusu kosala mingi te, kasi Yehova alingaki bango kaka. Tótalela Ndakisa ya mobange moko ya Yisraele na nkombo Simeone, oyo azalaki na bomoi ntango Yesu abotamaki. Ntango azalaki kokende na tempelo, na ntembe te azalaki komona bilenge mibali bazali kosala misala ya ntina kuna. Bongo Simeone ye moko? Na makanisi ya bomoto, akokaki kokanisa ete na kotalela mbula oyo akómaki na yango, azalaki lisusu na ntina mpenza te na miso ya Yehova. Kasi Yehova azalaki kotalela ye ndenge wana te. Amonaki Simeone “moto ya sembo mpe [oyo] azalaki kobanga Nzambe” mpe apesaki ye lipamboli ya komona Yesu ntango azalaki moke. Yehova asalelaki kutu Simeone mpo aloba esakweli mpo na mwana yango oyo akokóma Masiya! (Luka 2:25-35) Ezali polele ete Yehova azalaki komona kaka mobange Simeone te, kasi nde mobali moko ya kondima makasi, “mpe elimo santu ezalaki likoló na ye.”
Yehova apesaki Simeone lipamboli ya komona Yesu ntango azalaki moke mpe ya koyebisa esakweli mpo na mwana yango oyo akokóma Masiya
Yo mpe yebá ete Yehova azwaka na motuya mosala na yo ya sembo ata soki ozali lisusu na makasi mingi te. Na miso na ye, mbeka “ekondimama mingimingi mpenza na kotalela oyo moto azali na yango, kasi te na kotalela oyo moto azali na yango te.”—2 Ko. 8:12.
Na yango, tyá makanisi na oyo okoki kosala. Na ndakisa, lolenge nini ya mosala ya kosakola ozali na likoki ya kosala—ata mpo na ntango moke? Okokoka kolendisa basusu na nzela ya mwa lisolo mokuse na telefone to kokomela bango mwa mokanda? Makambo ya mikemike oyo emonisi bolingo ekoki kosalisa bandeko mingi, mingimingi soki euti epai ya baoyo basaleli Yehova bambula mingi.
Basusu nzoto ezali lisusu malamu te. Talá lisolo moko oyo euti na Afrika ya Ɛsti na etanda “Ebikisaki ye.”
Bóbosana te ete kondima mpe bosembo na bino ekoki kolendisa basusu. Bozali mpenza ndakisa na oyo etali koyika mpiko, mpe bóyeba ete “Nzambe azangi bosembo te mpo abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bomoniselaki nkombo na ye, na ndenge bosalelaki basantu mpe bozali kokoba kosalela bango.”—Ebr. 6:10.
KOTIKA TE KOSALA OYO OKOKI
Bato ya mayele bamonisi ete mibange mibali mpe basi oyo bamipesaka na kosalisa basusu bazalaka na nzoto kolɔngɔnɔ, makanisi ya malamu, mpe bomoi molai.
Ya solo, kosalela basusu bolamu ekosilisa te mikakatano nyonso ya bobange. Kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekosala yango ntango ekolongola likambo oyo ememaka bobange mpe liwa, elingi koloba, lisumu oyo Adama atikelá biso.—Rom. 5:12.
Atako bongo, mosala oyo ozali kosalela Yehova, kati na yango kosalisa basusu báyekola koyeba ye, ekobatela elikya na yo makasi mpe ekoki ata kosalisa yo na nzoto. Bandeko ya mibange, bóyeba ete Yehova azwaka na motuya mosala oyo bosalelaka ye, mpe ete bandeko ya lisangá basepelaka mingi na kondima na bino ya makasi.