Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mrt lisolo 72
  • Solo ezalaka kaka na ntina?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Solo ezalaka kaka na ntina?
  • Makambo mosusu
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Solo ezalaka mpenza?
  • Ndenge nini okoki koyeba solo?
  • Lokuta eutá wapi?
  • Mpo na nini lokuta epalangani lelo oyo?
  • Mpo na nini solo ezali mpenza na ntina?
  • Mpo na nini Nzambe alingi ete nayeba solo?
  • Nzambe akosilisa lokuta mokolo mosusu?
  • Tómekola Nzambe oyo alingaka solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Baklisto basambelaka na elimo mpe na solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mpo na nini koluka solo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Makambo mosusu
mrt lisolo 72
Moto moko ya politiki azali kotinda bato báganga.

Solo ezalaka kaka na ntina?

Lelo oyo na mokili, ekómá mpasi kokesenisa solo ná lokuta. Bato bakómá kondimela mingi mayoki mpe makanisi na bango moko, na esika ya kondimela bilembeteli oyo emonisi likambo boye ezali solo to lokuta. Na ndakisa, bato mingi na mokili ya lelo oyo bakanisaka ete solo ezali te.

Likanisi yango ebandá lelo te. Esili koleka bambula soki 2 000, Ponse Pilate oyo azalaki guvɛrnɛrɛ ya Roma, atunaki Yesu na lityo nyonso boye: “Solo ezali nini?” (Yoane 18:38) Atako Pilate azelaki te ete Yesu apesa ye eyano, kasi motuna na ye ezalaki na ntina. Biblia epesi eyano oyo ekoki kosalisa yo mpo oyeba likambo oyo ezali solo to lokuta.

Solo ezalaka mpenza?

Ɛɛ. Biblia esaleli liloba “solo” mpo na kolobela likambo oyo esimbami na elembeteli lokola mpe makambo oyo eyokani na bizaleli ya malamu. Eteyaka ete solo euti na Yehovaa mpe ebengi ye “Nzambe ya solo.” (Nzembo 31:5) Biblia ezali na solo oyo euti na Nzambe, mpe ekokanisi yango na pole, na ndenge oyo ekoki kotambwisa biso na mokili oyo etondi na lokuta.​—Nzembo 43:3; Yoane 17:17.

Ndenge nini okoki koyeba solo?

Nzambe alingaka te tóndimela solo oyo ezali na Biblia bindimela. Kasi, alingi tósalela makoki na biso ya kokanisa mpo na koluka koyeba solo na esika ya kondimela kaka mayoki na biso. (Baroma 12:1) Alingi ete tósalela ‘makanisi na biso nyonso’ mpo tóyeba mpe tólinga ye. Azali mpe kolendisa biso tómindimisa biso moko na mateya ya solo oyo tozali koyekola na Biblia.​—Matai 22:37, 38; Misala 17:11.

Lokuta eutá wapi?

Biblia elobi ete Satana Zabolo, oyo azali monguna ya Nzambe ye nde abandisá lokuta, yango wana Biblia ebengi ye “tata ya lokuta.” (Yoane 8:44) Ayebisaki baboti na biso ya liboso lokuta na ntina etali Nzambe. (Ebandeli 3:1-6, 13, 17-19; 5:5) Banda wana, Satana azali kokoba kopanza lokuta na mokili mpo na kozipa solo na ntina etali Nzambe.​—Emoniseli 12:9.

Mpo na nini lokuta epalangani lelo oyo?

Na eleko na biso, oyo Biblia ebengi “mikolo ya nsuka,” Satana azali kokoba kokosa bato koleka ndenge ezalaki liboso. Mbala mingi bato bakosaka basusu mpo na kolyela bango. (2 Timote 3:1, 13) Mangomba mingi ezali mpe kokosa bato lelo oyo. Biblia esakolaki na mikolo na biso ete bato “bakoluka bateyi ebele mpo báyokisaka bango makambo oyo matoi na bango elingi koyoka,” mpe “matoi na bango ekoboya koyoka solo.”​—2 Timote 4:3, 4.

Mokambi moko ya lingomba atomboli Biblia liboso ya bato oyo bazali kobeta mabɔkɔ.

Mpo na nini solo ezali mpenza na ntina?

Bato batyelanaka motema esika solo ezali. Esika bato bazali kotyelana motema te, makambo esimbaka te. Biblia elobi ete Nzambe alingi ete losambo na biso esimbama na solo. Yango wana elobi: ‘Baoyo bazali kosambela Nzambe basengeli kosambela ye na elimo mpe na solo.’ (Yoane 4:24) Mpo na koyeba ndenge oyo Biblia ekoki kosalisa yo oyeba mateya ya lokuta ya mangomba mpe otika yango, tángá masolo oyo ezali na motó ya likambo “Mateya ya lokuta oyo etindaka bato bálinga Nzambe te.”

Mpo na nini Nzambe alingi ete nayeba solo?

Nzambe alingi ete tózala na bomoi ya libela na libela, mpo tózwa yango tosengeli koyekola mateya ya solo oyo etali ye. (1 Timote 2:4) Soki oyekoli mitinda ya Nzambe na oyo etali mabe ná malamu, mpe osaleli yango na bomoi na yo, okokóma na boninga ya malamu ná ye. (Nzembo 15:1, 2) Mpo na kosalisa bato báyeba solo, Nzambe atindaki Yesu na mabele. Nzambe alingaka ete tóyeba mateya ya Yesu.​—Matai 17:5; Yoane 18:37.

Nzambe akosilisa lokuta mokolo mosusu?

Ɛɛ. Nzambe ayinaka komona ntango bato bazali kosalela lokuta mpo na kolyela basusu. Alaki ete akolongola na mabele bato nyonso oyo babukaka lokuta. (Nzembo 5:6) Ntango Nzambe akosala yango, akokokisa elaka na ye oyo elobi: “Mbɛbu oyo elobaka solo ekoumela mpo na libela.”​—Masese 12:19.

Bavɛrsɛ ya Biblia na oyo etali lokuta mpe solo

Yoane 8:44: ‘Zabolo azali moto ya lokuta mpe tata ya lokuta’

Ndimbola: Satana Zabolo azali moto ya liboso oyo alobaki lokuta na ebandeli mpe mobandisi na yango.

Masese 12:22: “Yehova ayinaka mbɛbu oyo elobaka lokuta.”

Ndimbola: Baoyo balingaka Nzambe basengeli koyina lokuta kaka ndenge ye ayinaka yango.

Yoane 4:24: “Baoyo bazali kosambela [Nzambe] basengeli kosambela ye na elimo mpe na solo.”

Ndimbola: Nzambe alingi ete tósambela ye na boyokani na mateya ya solo oyo etali ye.

Yoane 8:32: “Solo ekopesa bino bonsomi.”

Ndimbola: Solo oyo Yesu ateyaki ekoki kokangola to kolongola biso na kozanga koyeba, na misala ya bilimo mabe, na lokuta ya mangomba mpe na makambo mosusu. Talá lisolo “‘La vérité vous libérera’: Comment?”

1 Timote 2:4: ‘Mposa ya Nzambe ezali ete bato ya ndenge nyonso bábika mpe bázwa boyebi ya sikisiki ya solo.’

Ndimbola: Nzambe alingi ete tózwa lobiko na koyekoláká mateya ya solo na oyo etali ye.

a Yehova ezali nkombo ya Nzambe. (Nzembo 83:18) Tálá lisolo “Yehova azali nani?”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto