Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbq lisolo 24
  • Mpo na nini kimya ezali kokɔta na mokili te?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini kimya ezali kokɔta na mokili te?
  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano ya Biblia
  • Mpo na nini bato bazali te kokoka kotya kimya?​—Biblia elobi nini?
    Makambo mosusu
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Nani akokamba bato epai na kimya?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Kimya ya solo​—Ekouta wapi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
Biyano na mituna ya Biblia
ijwbq lisolo 24
Mpɛpɔ ya etumba

Mpo na nini kimya ezali kokɔta na mokili te?

Eyano ya Biblia

Milende oyo bato bazali kosala mpo na kokɔtisa kimya na mokili ezali kolonga te mpe ekolonga te mpo na ntina mingi:

  • “Ezali te likambo ya moto oyo azali kotambola ete atambwisa lokolo na ye.” (Yirimia 10:23) Bato bakelamaki te na likoki to lotomo ya komiyangela; na yango bakolonga te kotya kimya oyo ekoumela.

  • “Bótyela bankumu motema te, to mwana ya moto ya mabele te, mpo akoki kobikisa te. Elimo na ye ekobima, akozonga na mabele; na mokolo yango makanisi na ye ekufi.” (Nzembo 146:3, 4) Bakonzi ya mokili, ata baoyo bazali na makanisi ya malamu, bakokoka te kolongola libela makambo oyo ebimisaka bitumba.

  • “Mikolo ya nsuka ekozala ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano. Mpo bato bakozala . . . bato ya nko, oyo balingaka makambo ya malamu te, oyo batɛkaka bamosusu, bato ya motó makasi, oyo bavimbi na lolendo.” (2 Timote 3:1–4) Tozali na “ntango ya nsuka” ya mokili oyo mabe, ntango oyo bizaleli ya bato ezali kosala ete kimya ezala te.

  • “Mawa na mabele mpe na mbu, mpo Zabolo akiteli bino na nkanda makasi, mpo ayebi ete azali na ntango mokuse.” (Emoniseli 12:12) Zabolo, monguna ya Nzambe, abwakamá zingazinga ya mabele mpe atindaka bato bálanda bizaleli mabe na ye. Soki kaka ye nde azali “mokonzi ya mokili oyo,” kimya ekozala ata moke te.​—Yoane 12:31.

  • “[Bokonzi ya Nzambe] ekotuta mpe ekosukisa makonzi oyo nyonso [oyo etɛmɛlaka Nzambe], mpe ekotikala seko.” (Danyele 2:44) Ezali Bokonzi ya Nzambe, kasi guvɛrnema ya bato te, nde ekokokisa mposa na biso ya kofanda na mokili oyo ezali na kimya ya solosolo, oyo ekoumela libela.​—Nzembo 145:16.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto