Mwamisato, 15 sanza ya 10
Ngai nazali Alfa ná Omega.—Em. 1:8.
Alfa ezali lɛtrɛ ya liboso ya alfabɛ ya Grɛki, mpe Omega ezali lɛtrɛ ya nsuka. Ndenge asalelaki maloba “Alfa ná Omega,” Yehova amonisaki ete ntango abandi likambo moko, akómisaka yango na nsuka. Nsima ya kokela Adama ná Eva, Yehova alobaki na bango ete: “Bóbota mpe bókóma mingi, bótondisa mabele mpe bótya yango na nse na bino.” (Eba. 1:28) Ezali lokola Yehova alobaki na ntango wana “Alfa.” Ekozala na ntango moko oyo bana ya Adama oyo bazali bato ya kokoka mpe ya botosi bakotondisa mabele mpe bakokómisa yango paradiso. Na ntango yango, ekozala lokola Yehova alobi “Omega.” Nsima ya kosilisa mosala ya kozalisa “likoló mpe mabele ná biloko na yango nyonso,” Yehova alobaki likambo oyo emonisi ete mokano na ye ekokokisama. Alingaki komonisa ete kozanga ntembe akokokisa mokano na ye mpo na bato mpe mabele. Ekokokisama mpenza na nsuka ya mokolo yango ya nsambo.—Eba. 2:1-3. w23.11 5 par. 13-14
Mwaminei, 16 sanza ya 10
Bóbongisa nzela ya Yehova! Bósembolela Nzambe na biso balabala monene na mokili ekauká.—Yis. 40:3.
Mbala mosusu mobembo wana ya mpasi oyo basalaki longwa na Babilone tii na Yisraele esalaki basanza soki minei, kasi Yehova alakaki ete mokakatano moko te ekopekisa bango kozonga. Bayuda oyo bazalaki sembo, bayebaki ete mapamboli oyo bakozwa soki bazongi na Yisraele ezalaki na motuya mingi koleka makambo ya kitoko oyo balingaki kotika na Babilone. Lipamboli oyo elekaki monene ezalaki ya kozongela losambo na bango. Tempelo moko ya Yehova ezalaki te na Babilone. Etumbelo ata moko te ezalaki kuna mpo ete Bayisraele bápesa Yehova bambeka ndenge esɛngisamaki na Mobeko ya Moize, mpe nganga-nzambe moko te azalaki kuna mpo na kopesa bambeka yango. Lisusu, bato oyo bazalaki kosambela banzambe ya lokuta bazalaki mingi koleka baoyo bazalaki kotosa mibeko ya Yehova. Yango wana, Bayuda mingi oyo balingaki Yehova bazalaki kozela na mposa makasi bázonga na mboka na bango, epai bakozongela lisusu losambo ya pɛto. w23.05 14-15 par. 3-4
Mwamitano, 17 sanza ya 10
Bókoba kotambola lokola bana ya pole.—Ef. 5:8.
Tosengeli mpe na lisalisi ya elimo santu ya Nzambe mpo tókoba komitambwisa lokola “bana ya pole.” Mpo na nini? Mpo ezali etumba monene kotikala pɛto na mokili oyo ya mbindo. (1 Tes. 4:3-5, 7, 8) Elimo santu ekoki kosalisa biso tóbundisa makanisi ya mokili, ata mpe filozofi ná ndenge na yango ya kotalela makambo oyo eyokani te na makanisi ya Nzambe. Elimo santu ekoki mpe kosalisa biso tómonisa “boboto na makambo nyonso [mpe] bosembo.” (Ef. 5:9) Lolenge moko oyo tokoki kozwa elimo santu ezali ya kosɛnga yango na libondeli. Yesu alobaki ete Yehova akopesa “elimo santu na baoyo bazali kosɛnga ye yango.” (Luka 11:13) Mpe ntango tosanzolaka Yehova elongo na makita, tozwaka mpe elimo santu. (Ef. 5:19, 20) Nguya ya elimo santu ya Nzambe ekosalisa biso tózala na bomoi oyo esepelisaka Nzambe. w24.03 23-24 par. 13-15