Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 58 lok. 140-lok. 141 par. 3
  • Yerusaleme ebebisami

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yerusaleme ebebisami
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Mosakoli na “eleko ya nsuka ya mikolo”
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
  • Yehova akozongisela moto na moto na kolanda misala na ye
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
  • Na kati ya Yirimia
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 58 lok. 140-lok. 141 par. 3
Yerusaleme ná tempelo epeli mɔtɔ

LITEYA 58

Yerusaleme ebebisami

Bato ya Yuda batikaki Yehova mbala na mbala mpo na kosambela banzambe ya lokuta. Na boumeli ya bambula ebele, Yehova atikaki te koluka kosalisa bango. Atindaki basakoli ndenge na ndenge mpo na kokebisa bango, kasi bayokaki te. Bazalaki kutu kosɛka basakoli yango. Yehova asalaki nini mpo na kosukisa losambo na bango ya bikeko?

Nebukadenezare, mokonzi ya Babilone, azalaki kozwa ekólo mokomoko. Mbala ya liboso oyo azwaki Yerusaleme, akangaki Mokonzi Yehoyakine, bankumu, bilombe ya bitumba ná bato ya misala ya mabɔkɔ, mpe amemaki bango nyonso na Babilone. Azwaki mpe biloko nyonso ya motuya oyo ezalaki na tempelo ya Yehova. Na nsima, Nebukadenezare atyaki Zidikiya azala mokonzi ya Yuda.

Na ebandeli, Zidikiya azalaki kotosa Nebukadenezare. Kasi, bikólo ya pembenipembeni ná basakoli ya lokuta bayebisaki ye atombokela Babilone. Yirimia akebisaki ye: ‘Soki otomboki, bakoboma bato, mpe nzala ná maladi ekokɔta na Yuda.’

Nsima ya koyangela mbula mwambe, Zidikiya amonaki malamu atombokela Babilone. Asɛngaki basoda ya Ezipito básalisa ye. Nebukadenezare atindaki basoda na ye bábundisa Yerusaleme, mpe batyaki kaa libándá ya engumba yango. Yirimia ayebisaki Zidikiya: ‘Yehova alobi ete soki omitiki na mabɔkɔ ya Babilone, yo ná Yerusaleme bokobika. Soki omitiki te, bato ya Babilone bakotumba Yerusaleme mpe bakomema yo na bolɔkɔ.’ Zidikiya alobaki: ‘Nakomitika te!’

Nsima ya mbula moko ná ndambo, basoda ya Babilone babukaki bifelo ya Yerusaleme mpe batyaki mɔtɔ na engumba. Batumbaki tempelo, babomaki bato ebele, mpe bakangaki bankóto ya bato.

Zidikiya akimaki, kasi basoda ya Babilone balandaki ye. Bakangaki ye pene na Yeriko mpe bamemaki ye epai ya Nebukadenezare. Mokonzi ya Babilone atikaki Zidikiya amona ndenge bazalaki koboma bana na ye. Na nsima, atɔbɔlaki ye miso, atyaki ye na bolɔko, mpe kuna nde akufaki. Kasi Yehova alakaki bato ya Yuda ete: ‘Nsima ya mbula 70, nakozongisa bino na Yerusaleme.’

Nini ekómelaki bilenge oyo bamemamaki lokola bakangami na Babilone? Batikalaki sembo epai ya Yehova? Tokolobela yango.

“Yehova Nzambe, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, bikateli na yo ezali solo mpe sembo.”​—Emoniseli 16:7

Mituna: Nebukadenezare azalaki nani? Asalaki Yerusaleme nini? Zidikiya azalaki nani?

2 Bakonzi 24:1, 2, 8-20; 25:1-24; 2 Ntango 36:6-21; Yirimia 27:12-14; 29:10, 11; 38:14-23; 39:1-9; Ezekiele 21:27

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto