Tiká liloba ya Nzambe engɛngisa nzela na yo
“Liloba na yo ezali . . . pole mpo na nzela na ngai.”—NZEMBO 119:105, NW.
1, 2. Tosengeli kosala nini mpo liloba ya Yehova engɛngisa nzela na biso?
LILOBA ya Yehova ekoki kongɛngisa nzela na biso soki totikeli yango nzela. Mpo na kozwa pole yango ya elimo, tosengeli komipesa na koyekola Liloba ya Nzambe mpe kosalela batoli na yango. Ezali kaka soki tosali bongo nde tokoki koloba lokola mokomi ya nzembo ete: “Liloba na yo ezali mwinda mpo na makolo na ngai mpe pole mpo na nzela na ngai.”—Nzembo 119:105, NW.
2 Tótalela sikoyo Nzembo 119:89-176. Bavɛrsɛ yango oyo ekabolami na biteni 11 elobeli makambo ebele! Ekoki kosalisa biso tótikala na nzela ya bomoi ya seko.—Matai 7:13, 14.
Mpo na nini tosengeli kolinga liloba ya Nzambe?
3. Ndenge nini Nzembo 119:89, 90 ezali komonisa ete tokoki kotyela liloba ya Nzambe motema?
3 Moto oyo alingaka liloba ya Nzambe akómaka makasi na elimo. (Nzembo 119:89-96) Mokomi ya nzembo ayembaki boye: “Tii na ntango oyo eyebani nsuka te, Ee Yehova, liloba na yo etɛlɛmi na likoló. . . . Opikaki mabelé makasi, mpo etɛngatɛnga te.” (Nzembo 119:89, 90, NW) Na liloba ya Nzambe to ‘mibeko na ye ya likoló,’ moi, sanza mpe minzoto elandaka banzela na yango mpe mabelé epikami makasi mpo na libela. (Yobo 38:31-33; Nzembo 104:5) Tokoki kotyela liloba nyonso oyo ezali kobima na monɔkɔ ya Yehova motema; oyo Nzambe alobi “ekolonga” kokokisa mokano na ye.—Yisaya 55:8-11.
4. Kolinga liloba ya Nzambe esalisaka basaleli na ye oyo bazali konyokwama básala nini?
4 Mokomi ya nzembo alingaki ‘kokufa na mpasi na ye soki alingaki mobeko ya Nzambe te.’ (Nzembo 119:92, NW) Bato oyo bazalaki konyokola ye bazalaki bapaya te; ezalaki Bayisalaele oyo bazalaki kobuka mibeko ya Nzambe nde bazalaki koyina ye. (Levitike 19:17) Kasi, yango elɛmbisaki ye te, mpamba te alingaki mobeko ya Nzambe oyo ezalaki kosunga ye. Na Kolinti, ntoma Paulo azalaki “na makama epai ya bandeko ya lokuta,” mbala mosusu mpe na “bantoma minene” oyo bazalaki koluka likambo oyo bakoki kokweisa ye na yango. (2 Bakolinti 11:5, 12-14, 26) Atako bongo, Paulo azindaki na elimo te mpamba te alingaki liloba ya Nzambe. Lokola biso mpe tolingaka Liloba ya Yehova mpe tosalelaka yango, tolingaka bandeko na biso. (1 Yoane 3:15) Atako bato ya mokili bazali koyina biso, yango esalaka te ete tóbosana mateya ya Nzambe. Tokobaka kosala mokano na ye na bomoko ná bandeko na biso mpe tozelaka ntango oyo tokosalela Yehova na esengo mpo na libela.—Nzembo 119:93.
5. Ndenge nini Mokonzi Asa alukaki Yehova?
5 Mpo na komonisa ete tomipesi na Yehova, tokoki kobondela ye boye: “Nazali moto na yo. Bikisá ngai, mpamba te naluki mitindo oyo opesaka.” (Nzembo 119:94, NW) Mokonzi Asa alukaki Nzambe mpe asilisaki lipɛngwi na Yuda. Na likita moko monene oyo esalemaki na mbula ya 15 ya boyangeli ya Asa (mobu 963 L.T.B.), bato ya Yuda ‘basalaki kondimana ete bakoluka Yehova.’ Nzambe “amimonisaki epai na bango” mpe “akobaki kopesa bango kimya bipai nyonso.” (2 Ntango 15:10-15) Ndakisa yango esengeli kolendisa moto nyonso oyo atikaki lisangá ya Yehova azwa makasi ya koluka lisusu Nzambe. Yehova akopambola mpe akobatela bato oyo bazongeli kosangana na basaleli na ye.
6. Ezaleli nini ekobatela biso na makama ya elimo?
6 Liloba ya Yehova epesaka bwanya oyo ekoki kobatela biso na makama ya elimo. (Nzembo 119:97-104) Bakomandema ya Nzambe ekómisaka biso bato ya bwanya koleka banguna na biso. Koyoka makebisi na ye epesaka biso bososoli, mpe ‘kotosa mitindo oyo apesaka esalisaka biso tómitambwisa na mayele koleka mikóló.’ (Nzembo 119:98-100, NW) Soki maloba ya Yehova ezali ‘elɛngi na lolemo na biso koleka mafuta ya nzoi na monɔkɔ na biso,’ tokoyina “nzela nyonso ya mabe” mpe tokokima yango. (Nzembo 119:103, 104, NW) Yango ekobatela biso na makama ya elimo ntango tozali liboso ya bato ya lolendo, ya nkanda, bato oyo bazali kobanga Nzambe te na mikolo oyo ya nsuka.—2 Timote 3:1-5.
Mwinda mpo na makolo na biso
7, 8. Na kolanda Nzembo 119:105, tosengeli kosalaka nini?
7 Liloba ya Nzambe engɛngisaka ntango nyonso na elimo. (Nzembo 119:105-112) Tózala baklisto bapakolami to baninga na bango “bampate mosusu,” tolobaka boye: “Liloba na yo ezali mwinda mpo na makolo na ngai mpe pole mpo na nzela na ngai.” (Yoane 10:16; Nzembo 119:105, NW) Liloba ya Nzambe ezali lokola mwinda oyo engɛngisaka nzela na biso mpo tóbɛta libaku te to tókwea te na elimo. (Masese 6:23) Kasi, mokomoko na biso asengeli kotika ete liloba ya Yehova ezala mwinda mpo na makolo na ye.
8 Tosengeli kozala na ekateli makasi lokola mokomi ya Nzembo 119. Azwaki ekateli ya kopɛngwa te na mitindo oyo Nzambe apesaka. Alobaki boye: “Nalapi ndai ya kobatela bikateli ya sembo [ya Yehova], mpe nakokokisa yango.” (Nzembo 119:106, NW) Tiká tóbosana ata mokolo moko te ete kotánga Biblia mokolo na mokolo mpe kopesa biyano na makita ezali na ntina mingi.
9, 10. Nini emonisi ete bato oyo bamipesi na Yehova bakoki ‘kopɛngwa na mitindo oyo apesaka,’ kasi ndenge nini bakoki kokima likambo yango?
9 Mokomi ya nzembo ‘apɛngwaki te na mitindo oyo Nzambe apesaka’; kasi, likambo yango ekoki kokómela moto mosusu oyo amipesi na Yehova. (Nzembo 119:110, NW) Atako Mokonzi Salomo azalaki na ekólo oyo emipesaki na Yehova mpe na ebandeli azalaki kolanda bwanya ya Nzambe, na nsima apɛngwaki. “Basi bapaya basalisaki ye masumu” na ndenge bamemaki ye asambela banzambe ya lokuta.—Nehemia 13:26; 1 Mikonzi 11:1-6.
10 Satana, “mobomi-ndɛkɛ” atye ebele ya mitambo. (Nzembo 91:3, NW) Na ndakisa, moto moko oyo atiká lisangá akoki koluka kobenda biso tótika pole ya elimo mpe komema biso na molili ya lipɛngwi. Na lisangá ya Tyatila, ezalaki na “mwasi oyo Yezabele,” ekoki kozala etuluku moko ya basi oyo bazalaki koteya bato mosusu bámipesa na losambo ya bikeko mpe na kosala pite. Yesu akangaki miso na mabe wana te, biso mpe tosengeli kokangela yango miso te. (Emoniseli 2:18-22; Yuda 3, 4) Yango wana, tóbondelaka Yehova asalisa biso tópɛngwa te na mitindo oyo apesaka, kasi tótikala na pole ya Nzambe.—Nzembo 119:111, 112.
Liloba ya Nzambe ezali kosunga biso
11. Na kolanda Nzembo 119:119, ndenge nini Nzambe atalelaka bato mabe?
11 Soki tokangami na batoli ya Nzambe, ye akosunga biso. (Nzembo 119:113-120) Tosepelaka te na “bato ya mitema mibale,” se ndenge Yesu andimaka te baklisto ya ntango na biso oyo bazali mɔtɔ te, mpiɔ te. (Nzembo 119:113, NW; Emoniseli 3:16) Lokola tosalelaka Yehova na motema mobimba, azali ‘ebombamelo’ na biso mpe akosunga biso. ‘Akoboya bato nyonso oyo batikaka batoli na ye’ mpo na kosalela mayele mabe mpe lokuta. (Nzembo 119:114, 117, 118, NW; Masese 3:32) Mpo na ye, bato ya ndenge wana bazali lokola “mbindo ya palata.” (Nzembo 119:119, NW; Masese 17:3) Tiká tólingaka ntango nyonso makebisi ya Nzambe mpo tolingi te kosangana na bato mabe oyo bazali lokola mbindo ya palata oyo ekobebisama!
12. Mpo na nini kobanga Yehova ezali na ntina mingi?
12 Mokomi ya Nzembo alobaki ete: “Mpo na nsɔmɔ na yo [ Yehova], nzoto na ngai ezali kolɛnga.” (Nzembo 119:120, NW) Lokola tozali basaleli ya Nzambe, mpo asunga biso ezali na ntina mingi tózala na nsɔmɔ na ye, yango emonanaka na kokima makambo oyo aboyaka. Yobo azalaki sembo na bomoi na ye mpo azalaki kobanga Yehova. (Yobo 1:1; 23:15) Kobanga Nzambe ekosalisa biso tólanda nzela oyo ezali malamu na miso na ye ata soki tokutani na mpasi ya ndenge nini. Kasi, mpo na koyika mpiko, esɛngaka tóbondelaka na kondima.—Yakobo 5:15.
Tóbondelaka na kondima
13-15. (a) Mpo na nini tosengeli kozala na kondima ete Nzambe akoyoka mabondeli na biso? (b) Nini ekoki kosalema soki toyebi te tóloba nini na libondeli? (c) Monisá ndenge oyo maloba ya Nzembo 119:121-128 ekoki koyokana na libondeli oyo tozali ‘komilela na maloba oyo ebimaka te.’
13 Tokoki kobondela na kondima ete Nzambe akosunga biso. (Nzembo 119:121-128) Lokola mokomi ya nzembo, tozalaka na kondima ete Nzambe akoyoka mabondeli na biso. Mpo na nini? Mpamba te tolingaka bakomandema na ye “koleka wolo, ɛɛ wolo oyo epɛtolami.” Lisusu, ‘totalelaka mitindo nyonso oyo Nzambe apesaka na makambo nyonso ete ezali malamu.’—Nzembo 119:127, 128, NW.
14 Yehova ayokaka malɔmbɔ na biso mpo tobondelaka ye na kondima mpe totosaka mitindo oyo apesaka. (Nzembo 65:2) Kasi, nini esalemaka soki tozali na makambo oyo ezali kotungisa biso mpe toyebi te tóloba nini na libondeli? “Elimo yango moko elobelaka biso na komilela oyo maloba ebimaka te.” (Baloma 8:26, 27) Na ntango wana, Nzambe andimaka mabondeli oyo ezali na Liloba na ye oyo eyokani na bamposa na biso.
15 Biblia ezali na mabondeli mpe makanisi mingi oyo eyokani na ‘komilela na biso na maloba oyo ezali kobima te.’ Na ndakisa, tótalela Nzembo 119:121-128 (NW). Ndenge oyo makambo elobelami na bavɛrsɛ yango ekoki koyokana na makambo oyo tozali kokutana na yango. Na ndakisa, soki tozali kobanga bato mabe bábuba biso, tokoki kosɛnga Nzambe asalisa biso ndenge mokomi ya nzembo asalaki. (Vɛrsɛ 121-123) Tózwa ndakisa ete tolingi kozwa ekateli moko ya monene. Na ntango wana, tokoki kobondela mpo elimo ya Yehova esalisa biso tókanisa makebisi na ye mpe tósalela yango. (Vɛrsɛ 124, 125) Ata soki ‘toyinaka nzela nyonso ya lokuta,’ tokoki kosɛnga Nzambe asalisa biso mpo tókwea na komekama te mpe tóbuka mibeko na ye te. (Vɛrsɛ 126-128). Soki tótángaka Biblia mokolo na mokolo, mikapo lokola oyo touti kolobela ekoki kozonga na makanisi na biso ntango tozali kobondela Yehova.
Makebisi ya Yehova esalisaka biso
16, 17. (a) Mpo na nini tozali na mposa ya makebisi ya Yehova, mpe ndenge nini tosengeli kotalelaka yango? (b) Ndenge nini bato mosusu bakoki kotalela biso, kasi likambo eleki ntina ezali nini?
16 Mpo Nzambe ayoka mabondeli na biso mpe asepela na biso, tosengeli kotosa makebisi na ye. (Nzembo 119:129-136) Lokola tobosanaka mingi, tozalaka ntango nyonso na mposa ya makebisi ya Yehova mpo mateya mpe bakomandema na ye ezongelaka biso na makanisi. Ya solo, tosepelaka na pole ya elimo oyo tozwaka na bingɛngiseli ya sika oyo eutaka na maloba ya Nzambe. (Nzembo 119:129, 130) Tozalaka mpe na botɔndi ndenge Yehova ‘angɛngiseli biso elongi na ye,’ elingi koloba andimi biso, atako ‘miso na biso ezali kotangisa mpisoli lokola bibale’ mpo bato mosusu bazali kobuka mobeko na ye.—Nzembo 119:135, 136, NW; Mituya 6:25.
17 Tondimi mpenza ete Nzambe akondima biso ntango nyonso soki tozali kotosa makebisi na ye ya sembo. (Nzembo 119:137-144) Biso basaleli ya Yehova tondimaka ete azali na lotomo ya kopesa biso makebisi na ye ya sembo mpe kosɛngisa biso tótosa yango lokola bakomandema. (Nzembo 119:138) Kasi, mpo na nini mokomi ya nzembo, moto oyo azalaki kotosa bakomandema ya Nzambe, alobaki lisusu ete: “Nazali moto mpamba mpe natyolami”? (Nzembo 119:141, NW) Emonani ete azalaki kolobela ndenge oyo banguna na ye bazalaki kotalela ye. Soki tozali ntango nyonso sembo, bato mosusu bakoki kotyola biso. Kasi, likambo eleki ntina ezali ete Yehova asepelaka na biso mpamba te totosaka makebisi na ye ya sembo.
Tobatelami mpe tozali na kimya
18, 19. Kotosa makebisi ya Nzambe ememelaka biso matomba nini?
18 Kotosa makebisi ya Yehova esalisaka biso tózala penepene na ye. (Nzembo 119:145-152) Lokola toyokaka makebisi ya Yehova, tobangaka te kobondela ye na motema na biso mobimba, mpe tozalaka na elikya ete akoyoka biso. Tokoki kolamuka “na ntɔngɔntɔngɔ” mpo na kosɛnga lisungi na ye. Ezalaka mpenza ntango malamu mpo na kobondela! (Nzembo 119:145-147, NW) Nzambe azali mpe penepene na biso mpamba te toboyaka etamboli ya mbindo mpe tondimaka ete liloba na ye ezali solo, ndenge Yesu azalaki kotalela yango. (Nzembo 119:150, 151; Yoane 17:17) Boninga na biso na Yehova esungaka biso na mokili oyo ya yikiyiki mpe ekobatela biso na etumba ya Armagedon.—Emoniseli 7:9, 14; 16:13-16.
19 Lokola tomemyaka mpenza liloba ya Nzambe, tozalaka na libateli ya solosolo. (Nzembo 119:153-160) Tosalaka lokola bato mabe te, elingi koloba ‘topɛngwaka na makebisi ya Yehova te.’ Tolingaka mitindo oyo Nzambe apesaka mpe motema-boboto na ye ebatelaka biso. (Nzembo 119:157-159) Makebisi ya Yehova elamusaka makanisi na biso mpo tóyeba oyo tosengeli kosala soki tokutani na likambo moko. Nzokande, mitindo oyo Nzambe apesaka biso ezali malako, mpe tondimaka ete Mozalisi azali na lotomo ya kotambwisa biso. Lokola toyebi ete ‘liloba ya Nzambe mobimba ezali solo’ mpe ete tokoki komitambwisa biso moko te, tondimaka Nzambe atambwisa biso.—Nzembo 119:160, NW; Yilimia 10:23.
20. Mpo na nini tozali na “kimya mingi”?
20 Kolinga mobeko ya Yehova epesaka biso kimya mingi. (Nzembo 119:161-168) Ata minyoko elongolaka biso te “kimya ya Nzambe” oyo ekokani na eloko mosusu te. (Bafilipi 4:6, 7) Lokola tosepelaka mingi na bikateli ya Yehova, tosanzolaka ye “mbala nsambo na mokolo,” elingi koloba mbala na mbala. (Nzembo 119:161-164, NW) Mokomi ya nzembo ayembaki boye: “Kimya mingi ezali na baoyo balingaka mobeko na yo, mpe mpo na bango libaku ezali te.” (Nzembo 119:165, NW) Soki mokomoko na biso azali kolinga mobeko ya Yehova mpe azali kobatela yango, akobɛta libaku te mpo na makambo oyo moto mosusu azali kosala to mpo na likambo mosusu nyonso.
21. Tángá bandakisa ya bato oyo Biblia elobeli oyo ezali komonisa ete tosengeli kobɛtaka libaku te ntango mikakatano ebimi na lisangá?
21 Bato mingi oyo Biblia elobeli batikelaki eloko moko nzela te ete ezala libaku mpo na bango. Na ndakisa, moklisto na nkombo Gayusi atikaki te ete etamboli mabe ya Diotelefe ezala libaku mpo na ye; kasi ‘akobaki kotambola na kati ya solo.’ (3 Yoane 1-3, 9, 10) Ekoki mpenza kozala ete Paulo alendisaki Evodi ná Sɛntisi “bázala na likanisi ya ndenge moko na kati ya Nkolo” mpo basi baklisto wana bazalaki koyokana te. Emonani mpenza ete basalisaki bango mpo básilisa matata na bango mpe bakobaki kosalela Yehova na bosembo. (Bafilipi 4:2, 3) Yango wana, tosengeli kobɛtaka libaku te ata soki mikakatano ya ndenge nini ebimi na lisangá. Tótya makanisi na biso na kotosa mitindo oyo Yehova apesaka, mpe tóbosanaka te ete ‘banzela na biso nyonso ezali liboso na ye.’ (Nzembo 119:168, NW; Masese 15:3) Na ndenge yango, eloko moko te ekolongola “kimya mingi” oyo tozali na yango.
22. (a) Soki tozali kotosa Nzambe, tokozwa libaku malamu ya kosala nini? (b) Ndenge nini tosengeli kotalela bato mosusu oyo batiki lisangá?
22 Soki tozali ntango nyonso kotosa Yehova, tokozala na libaku malamu ya kokoba kosanzola ye. (Nzembo 119:169-176) Soki tozali kotosa batoli ya Yehova na bomoi na biso, tokozala na kimya ya elimo, kasi mpe ‘mbɛbu na biso ekokoba kobimisa lisanzoli mpo na Yehova.’ (Nzembo 119:169-171, 174, NW) Yango nde libaku eleki monene oyo tokoki kozala na yango na mikolo oyo ya nsuka. Mokomi ya nzembo azalaki na mposa ya kokoba kozala na bomoi mpe kosanzola Yehova, kasi na ndenge oyo alimboli te, ‘atɛlɛnganaki lokola mpate ebungi.’ (Nzembo 119:175, 176, NW) Bato mosusu oyo batiki lisangá bakoki naino kozala na bolingo ya Nzambe mpe na mposa ya kosanzola ye. Yango wana, tósala nyonso oyo tokoki mpo na kosalisa bango bázwa lisusu kimya ya elimo mpe esengo ya kosanzola Yehova elongo na basaleli na ye.—Baebele 13:15; 1 Petelo 5:6, 7.
Pole ya libela mpo na nzela na biso
23, 24. Matomba nini ozwi na boyekoli ya Nzembo 119?
23 Nzembo 119 ekoki kosalisa biso na ndenge ebele. Na ndakisa, ekoki kotinda biso tótyela lisusu Nzambe motema mingi, mpamba te ezali komonisa ete moto azalaka na bolamu ya solosolo soki azali “kotambola na mobeko ya Yehova.” (Nzembo 119:1) Mokomi ya nzembo amonisi biso ete ‘liloba ya Nzambe mobimba ezali solo.’ (Nzembo 119:160) Maloba yango esengeli mpenza kobakisa bolingo na biso mpo na Liloba ya Nzambe mobimba. Komanyola maloba ya Nzembo 119 esengeli kopesa biso mposa ya komipesa na koyekola Biblia. Mokomi ya nzembo asɛngaki Nzambe mbala na mbala ete: “Teyá ngai batoli na yo.” (Nzembo 119:12, 68, 135, NW) Abondelaki mpe ete: “Teyá ngai malamu, bososoli mpe boyebi, mpamba te namonisaka kondima na bakomandema na yo.” (Nzembo 119:66, NW) Ekozala malamu ete biso mpe tóbondelaka ndenge yango.
24 Mateya ya Yehova esalisaka biso tókóma baninga na ye. Mokomi ya nzembo yango amibengi mbala na mbala mosaleli ya Nzambe. Kutu, alobi na Yehova maloba oyo ezali kosimba motema ete: “Nazali moto na yo.” (Nzembo 119:17, 65, 94, 122, 125; Baloma 14:8) Tozali mpenza na libaku malamu ya kosalela Yehova mpe kosanzola ye lokola Batatoli na ye! (Nzembo 119:7) Osalelaka Nzambe na esengo lokola mosakoli ya Bokonzi? Soki ezali bongo, yebá ete Yehova akotika te kosunga mpe kopambola yo na mosala yango ya lokumu mingi soki ozali ntango nyonso kotyela liloba na ye motema mpe ozali kotika yango engɛngisa nzela na yo.
Okopesa eyano nini?
• Mpo na nini tosengeli kolinga liloba ya Nzambe?
• Ndenge nini liloba ya Nzambe esungaka biso?
• Ndenge nini makebisi ya Yehova esalisaka biso?
• Mpo na nini basaleli ya Yehova bazali na libateli mpe na kimya?
[Elilingi na lokasa 16]
Liloba ya Nzambe epesaka pole ya elimo
[Elilingi na lokasa 17]
Soki tozali kolinga makebisi ya Yehova, ata mokolo moko te tokokóma lokola “mbindo ya palata”
[Bililingi na lokasa 18]
Soki tozali kotánga Biblia mokolo na mokolo, bavɛrsɛ ya ntina ekoki kozongela biso na makanisi ntango tozali kobondela