LOYEMBO 39
Tómisalela nkombo malamu epai ya Nzambe
Ya Papye
1. Bomoi na biso ezali mokuse.
Salelá yango mosala ya Nzambe.
Landá toli na ye, zwá nkombo ebongi,
Mpo motema n’e esepela.
2. Mokili oyo etindaka bato,
Básala nkombo, mpo báyeba bango.
Mosala ya mpunda, mopɛpɛ ya mpamba.
Yebá nde Nzambe, ye nde bomoi.
3. Nkombo na biso, tolingi ekɔta
Na buku’a Nzambe, mpo na seko seko.
Tóteyaka solo, Yah aza’ na biso,
Tóbebisa te kino nsuka.
(Talá mpe Eba. 11:4; Mas. 22:1; Mal. 3:16; Em. 20:15.)