Yehova azali koyangela na motema mawa
NA BOUMELI ya lisoló ya bato, bakonzi mingi bazali koyangela na kozanga mawa wana bazali konyokola bayangelami na bango. Nzokande, Yehova amonisaki bokeseni na koponáká libota ya Yisalaele mpe ayangelaki yango na motema mawa.
Ntango Bayisalaele bazalaki naino baombo na Ezipito ya kala, Yehova ayokaki kolela na bango. “Na mpasi nyonso na bango [ye mpe ayokaki mpasi, NW] . . . Na bolingo na ye mpe na mawa na ye asikolaki bango.” (Yisaya 63:9) Yehova abikisaki Yisalaele, apesaki bango bilei na nzela ya ekamwiseli, mpe asikolaki bango kino na mokili na bango mpenza.
Motema mawa ya Yehova emonanaki lisusu na mibeko oyo apesaki libota yango. Asɛngisaki Bayisalaele ete bázala na motema mawa epai na bitike, basi bakufeli-mibali, mpe bapaya oyo bafandaki na mboka na bango. Basengelaki te kozwa litomba elongobani te epai ya ebosono.
Mibeko mizalaki kosɛnga kozala na motema mawa epai na bato oyo bazalaki na bosɛnga. Mobólá akokaki kolɔkɔta biloko nsima wana nkolo elanga asilisi kobuka mbuma. Bazalaki kotika kosɛnga banyongo na mbula (ya nsambo) ya Sabata. Mabelé nyonso ya libula oyo matekisamaki masengelaki kozongisama na mbula ya Yubile (mbula ya ntuku mitano). Búku Ancient Israel—Its Life and Institutions (Yisalaele ya kala—Bomoi na yango mpe bibongiseli na yango ya Letá) elobi ete: “Na Yisalaele, bokeseni kati na bomoi ya bato ezalaki mpenza te ndenge ezali lelo oyo. Na ebandeli ntango babandaki kofanda na mokili na bango, Bayisalaele nyonso bazalaki na bomoi ndenge moko.”—Levitike 25:10; Deteronome 15:12-14; 24:17-22; 27:18.
Bamekolaki motema mawa ya Yehova
Basambeli ya Nzambe bamekolaka motema mawa na ye. Na ndakisa, na boumeli ya lisoló ya bato, bakonzi mosusu ya sika, bazalaki koboma bato ya libota ya mokonzi oyo azalaki liboso. Kasi Davidi, mosaleli ya Yehova asalaki bongo te. Nsima ya liwa ya Saulo, Davidi abatelaki Mefibosete, oyo azalaki mwana ya mwana ya Saulo mpe mosangoli ya libula. “Mokonzi ayokaki mawa mpo na Mefibosete mwana na Yonatana, mwana na Saulo.”—2 Samwele 21:7, NW.
Moto moko te amekolaki motema mawa ya Yehova lokola Yesu asalaki yango. Mingi na bikamwiseli na ye bipusamaki na motema mawa ya Nzambe. Na libaku moko moto moko ya maladi ya maba abondelaki ye ete: “Soko olingi, okoki kopɛtola ngai.” Yesu ayokaki mawa mpe asimbaki ye, kolobáká ete: “Nalingi, pɛtwá na yo.” (Malako 1:40-42) Na libaku mosusu bato ebele bazalaki kolanda Yesu. Na kati ya makɛlɛlɛ ya bato, Yesu atyaki likebi na bakufi miso mibale oyo bazalaki konganga ete: “Nkolo, yokelá biso mawa, ɛ Mwana na Davidi! . . . Yesu ayoki mawa mpe [asimbi, NW] miso na bango mpe nokinoki bamoni lisusu.”—Matai 20:29-34.
Ata na ntango bato bazalaki ebele, Yesu azangaki te komonisela basusu boboto. Mpo ete balyaki te na boumeli ya mwa mikolo, na libaku mosusu alobaki ete: “Nazali koyokela ebele mawa.” Na bongo, aleisaki bango na nzela na ekamwiseli. (Malako 8:1-8) Ntango Yesu azalaki kotambola, asukaki bobele na koteya bibele te kasi azalaki kotalela bamposa na bango. (Matai 9:35, 36) Mokolo mosusu nsima ya kotambola, Yesu mpe bayekoli na ye bazangaki ntango ya kopema ata mpo na kolya. Lisoló ya Biblia elobi na biso ete: “Baleki kati na bwato kokóma na lisobe bobele bango mpenza. Nde bato mingi bamoni bango koleka mpe bayebi bango. Babimi na mboka nyonso koyangana kuna mpe bakómi liboso na bango. Esili ye kolubwa, amoni ebele na bato mpe ayoki mawa mpo na bango zambi bazalaki pelamoko bampate bazangaki mobateli. Abandi koteya bango makambo mingi.”—Malako 6:31-34.
Eloko oyo ebendaki likebi ya Yesu ezalaki maladi mpe bobólá ya bato te kasi ezaleli na bango ya elimo. Bakonzi na bango bazalaki konyokola bango, na yango Yesu ‘ayokaki mawa mpo na bango.’ Liloba ya Greke oyo libongolami na “ayokaki mawa” elimboli “koyoka mpasi na misɔpɔ́.” Yesu azalaki mpenza moto ya motema mawa!
Motema mawa kati na mokili mabe
Yesu Klisto azali sikawa Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe na likoló. Lokola asalaki yango na Yisalaele ya kala, lelo oyo Nzambe azali koyangela bato na ye na motema mawa. “[Yehova] na bibele alobi ete, Bakozala na ngai, ɛɛ eloko na motuya na mokolo yango ekobongisa ngai. [Nakoyokela bango mawa, NW].”—Malaki 3:17.
Baoyo balingi ete Yehova amonisela bango motema mawa basengeli komekola banzela na ye. Ya solo, tozali kobika na mokili oyo bato bazali kotalela mingi makambo na bango moko na esika ya kosunga baoyo bazali na bosɛnga. Bayangeli mbala mingi bazali koluka litomba kozanga kotya likebi mpo na kobatela basáli mpe basombi. Na 2 Timoté 3:1-4, Biblia ezali kolobela sikisiki makanisi ya bato ya ntango na biso oyo ebomi motema mawa epai ya bato mingi.
Kasi, tokoki kozala na mabaku malamu ya komonisa motema mawa. Tokoki nde kopesa lisungi ebongi na baninga na biso ya kartyé? Ezali na moto moko ya maladi oyo tokoki kokende kotala ye? Tokoki kolendisa baoyo bazali konyokwama na makanisi, na kolandáká toli oyo, “Bózala na maloba ya kobɔ́ndisa epai na banyokwami na makanisi, bósunga bato na motau?”—1 Batesaloniki 5:14, NW.
Motema mawa ekosalisa biso lisusu na koboya kosilika ntango bato mosusu basali mabunga. Balobi na biso ete: “Makambo nyonso na bololo mpe likunya mpe nkanda mpe kongala mpe kotɔ́nga málongwa na bino mpe makambo nyonso na mabe lokola. Bózalanaka na boboto, moko epai na mosusu, na motema na mawa, na kolimbisana moko moko pelamoko Nzambe asili kolimbisa bino kati na Klisto.”—Baefese 4:31, 32.
Motema mawa ekosalisa biso na koboya kosalela na lolenge mabe bokonzi oyo tozali na yango likoló na basusu. Biblia elobi ete: “Bómilatisa mitema na mawa, na boboto, na kosɔkɛma, na bopɔlɔ, na mitema pɛtɛɛ.” (Bakolose 3:12) Komisɔkisa ekosalisa biso na komitya na esika ya baoyo tozali kokamba. Kozala moto ya motema mawa esangisi kozala na komikitisa mpe kozala na makambo makasi te na esika ya kozala moto ya mindondo. Kozala na makoki mingi ekoki soko moke te kozala ntina ya kotalela basusu lokola ete bazali biloko mpamba. Lisusu, kati na mabota, mibali ya mitema mawa bamikundolaka ete basi na bango bazali mbeki ya motau. (1 Petelo 3:7) Kotalela ndakisa ya motema mawa ya Yesu ekosunga biso na makambo oyo nyonso.
Lokola Yesu amonisaki motema mawa ya mozindo mpo na bato na boumeli ya mosala na ye awa na mabelé, tokoki kondimisama ete azali sikawa, mpe akokóba kozala, Mokonzi ya motema mawa. Nzembo 72 esakolaki na ntina na ye ete: “Akolóngisa babólá na bato; akobikisa bana na mozangi; mpe akotuta monyokoli. Bokonzi na ye ekozala longwa na mai monene epai moko bobele na mai monene epai mosusu; longwa mpe na ebale kino ndelo na mokili mpenza. Akoyokela moto na bolɔ́zi mpe mobólá mawa; akobikisa milimo na babólá.”—Nzembo 72:4, 8, 13.
Liloba na Nzambe esakolaki ete: “Na boyengebene akosambisa babólá mpe na sembo akolobela basɔkɛmi kati na mokili. . . . Akoboma oyo mabe.” Nsima ya kolobela lolenge oyo ata bato mabe, oyo bakokani na banyama bakobongola banzela na bango, esakweli ekóbi ete: “Bakoyokisana mpasi te, bakobebisana mpe te na ngomba mobimba na bulɛɛ na ngai; zambi mokili ekotonda na boyebi na [Yehova] lokola mbonge ikozipaka mai-na-monana.” (Yisaya 11:4-9) Esakoli oyo ezali mpenza elaka ya libota ya bato na mokili mobimba oyo bayebi Yehova mpe bazali komekola banzela na ye ya motema mawa!