Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpo na mobu 2000
1 Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ezali mpenza lipamboli mpo na basaleli ya Yehova. Na boumeli ya mbula koleka 50, esalisaki bamilio ya bato bákolisa makoki na bango ya koloba malamu liboso ya bato mpe ya koteya solo ya Biblia malamu. (Nz. 145:10-12; Mat. 28:19, 20) Ozali komona ndenge eteyelo yango esalisaki yo? Ekosalisa yo lisusu na boumeli ya mobu 2000 soki omipesi mpenza na yango mpe soki ozali kolanda toli oyo epesamaka kuna.
2 Malako oyo etaleli mikumba mpe mikanda oyo ekosalelama etyami na lokasa ya liboso ya manaka ya eteyelo mpo na mobu 2000. Ngonga oyo epesami mpo na eteni mokomoko, esika mateya ekouta, ndenge lisolo ekosalema, mpe makambo mosusu emonisami na lokasa yango. Tosɛngi yo ete ozwa ntango ya kotánga malako yango malamumalamu mpe osalela yango.
3 Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ: Programɛ mibale ya kotánga Biblia pɔsɔ na pɔsɔ etyami na manaka ya eteyelo. Moko ezali programɛ ya botángi oyo ekosalema na eteyelo mpe esɛngaka kotánga nkasa mitano ya Biblia. Ndimbola ya mikapo ya Biblia eutaka na botángi yango. Programɛ mosusu ya kotánga Biblia ebakisami likoló na yango, esɛngaka kotánga nkasa zomi na pɔsɔ moko. Soki olandi programɛ yango, okoki kosilisa kotánga Biblia mobimba na boumeli ya mbula misato. Ntango mosusu bato mosusu bakolinga kotánga mingi koleka ndenge yango emonisami na manaka ya mibale mpo na kotánga Biblia, mpe basusu bakokoka kolanda manaka yango te. Na esika ya koluka komikokanisa na bato mosusu, ezali malamu ete osepela na oyo okoki kosala. (Gal. 6:4) Likambo oyo eleki ntina ezali ete otángaka Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo.—Nz. 1:1-3.
4 Mpo na kokomisa nkombo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, osengeli kosolola na mokɛngɛli na eteyelo. Tosɛngi yo ete otalelaka mikumba oyo bakopesa yo lokola likambo ya lisɛki te, mpe ozangisaka mpambampamba te kosala yango. Sepelaká na eteyelo, lokola ebongiseli oyo euti epai ya Yehova. Omibongisaka malamu, omimesenisaka mpenza na makambo oyo ezali na lisolo oyo bapesi yo, mpe olobaka makambo oyo ekouta na motema, na yango okozwa litomba mpenza na eteyelo oyo ya ntina mingi.