Tósalela bato “makambo ya malamu” na kozaláká bayambi ya bapaya (Mat. 12:35a)
Na ntembe te, biso nyonso tolingaka kosalela bato “makambo ya malamu” na kolanda “ezaleli ya koyamba bapaya.” (Rom. 12:13) Bankulutu bapesaka ndakisa na likambo yango na ndenge bazwaka bibongiseli ya koyamba balobi-bapaya mpe kozongisela bango mbongo ya tike. Kasi, mokomoko na biso akoki kokakatana koyamba bapaya mpo azali na bozwi mingi te, to mpe mpo azali kobanga ete bato báya na ndako na ye. Kolanda na likebi toli oyo Yesu apesaki Marta ekosalisa biso tólonga makanisi ya bongo. (Luka 10:39-42) Yesu amonisaki mpenza ete “eloko oyo ezali malamu” na oyo etali koyamba bapaya ezali nde kosolola na bandeko mpe kolendisana, kasi te ebele ya bilei to bonzenga ya ndako. Soki tolandi toli yango, biso nyonso tokosalela bandeko na biso “makambo ya malamu” na boyokani na Liloba ya Nzambe.—3 Yoa. 5-8.