Manaka mpo na pɔsɔ ya 29 sanza ya 12
PƆSƆ EBANDI NA 29 SANZA YA 12
Loyembo 37 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cl mok. 18 par. 1-8 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Yosua 12-15 (Min. 10)
Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi (Min. 20)
Likita ya mosala:
Motó ya likambo ya sanza: Tóbimisa “makambo ya malamu” na bolamu oyo tobombi na mitema na biso.—Mat. 12:35a.
Min. 20: Tóteya mokemoke “makambo ya malamu” epai ya bayekoli ya Biblia mpe bana oyo bazali bandimi. (Mat. 12:35a) Lisolo na bayangani. Salelá bavɛrsɛ oyo elandi mpo na komonisa oyo tosengeli komizela na yango epai ya bayekoli ya Biblia mpe bana oyo bazali bandimi: 1 Bakorinti 13:11; 1 Petro 2:2, 3. Limbolá ndenge moto akoki komeka “mabɛlɛ oyo ezali na liloba ya Nzambe,” mpe ndenge oyo tokoki kosalisa bato oyo toyekolaka na bango Biblia mpe bana na biso básala yango. Limbolá etinda oyo ezali na Marko 4:28. (Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/12/2014, lok. 12, par. 6-8.) Sololá na mosakoli oyo akɔmeli to moboti moko; ayebisa ndenge oyo asalisaki moyekoli ya Biblia to mwana moko mpo akola na elimo.—Ef. 4:13-15; talá Biyano na mituna na bino na Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza ya mitano 2014.
Min. 10: “Tósalela bato ‘makambo ya malamu’ na kozaláká bayambi ya bapaya (Mat. 12:35a).” Lisolo na bayangani. Matomba nini to makambo nini bandeko mosusu bakutanaki na yango mpo bayambaki bapaya? Sɛngá bayangani báloba ndenge oyo tokoki koyambaka bapaya, mingimingi bandeko oyo bazali na mosala ya ntango nyonso. Yebisá bibongiseli oyo lisangá ezwá mpo na koleisa balobi bapaya.
Loyembo 124 mpe libondeli