Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 7/15 lok. 1
  • Tyáká likebi na kokómisa bato bayekoli

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tyáká likebi na kokómisa bato bayekoli
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2015
  • Masolo mosusu
  • Lukáká bato ya koyekola na bango Biblia
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Okoki kopesa mabɔkɔ na mosala ya kokómisa bato bayekoli?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Tóteyaka solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Ezali na ntina komibongisa mpo na kozongela bato na ndenge oyo ekobota mbuma
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2015
km 7/15 lok. 1

Tyáká likebi na kokómisa bato bayekoli

1. Tosengeli kosala nini mpo bato bábika?

1 Lapolo ya mosala ya mobu 2014 emonisi molende ya basaleli ya Nzambe mpe ekateli na bango ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi. (Mat. 24:14) Na nzela ya mosala ya ndako na ndako, bakampanye ya sipesiale mpo na kokabola batrakte mpe nkasa ya libyangi, mpe kosakola na bisika ya bato nyonso, tozali koyebisa bato mingi nsango ya Biblia koleka ndenge esalemaki liboso. Nzokande mpo bato bábika, tosengeli kosalisa bango bákóma bayekoli ya Yesu na koyekola na bango Biblia.​—1 Tim. 2:4.

2. Komituna mituna nini ekosalisa biso tózalaka pene na koyekola na bato Biblia?

2 Zaláká pene na koyekola na bato Biblia: Soki moto asepeli, osalaka makasi ya kozwa nimero to adrɛsi na ye mpe na nsima kozongela ye nokinoki na mokano ya kobanda koyekola na ye Biblia? Mbala ya nsuka oyo olakisaki moto ndenge boyekoli ya Biblia esalemaka na bokutani ya liboso, ezalaki ntango nini? Ntango nini mpo na mbala ya nsuka, osɛngaki bato oyo otikelaka bazulunalo mbala na mbala ete obanda koyekola na bango Biblia? Osili kolakisa bavideo Mpo na nini koyekola Biblia? mpe Boyekoli ya Biblia esalemaka ndenge nini? na baninga ya mosala, ya kelasi, bato ya kartye, bato ya libota na yo mpe bato mosusu oyo oyebani na bango? Ntango ozali kosalela shario, osalaka makasi oyebisa baoyo bazwi mikanda oyo tosalelaka mpo na koyekola na bato ete bakoki koyekola Biblia ofele?

3. Mpo tóteya solo malamumalamu, tosengeli na nini?

3 Lisalisi ya Yehova mpe Yesu: Ntango Yesu apesaki etinda ya ‘kokómisa bato bayekoli,’ alobaki “bókende”; yango emonisi ete alingaki tósala milende mpe tóluka bato. Nzokande, atiki biso biso moko te, kasi alaki ete akozala elongo na biso. (Mat. 28:19, 20) Lisusu, Yehova apesi biso elimo santu na ye, bisaleli mpe formasyo oyo tosengeli na yango mpo na koteya bato solo. (Zek. 4:6; 2 Ko. 4:7) Tokoki kobondela mpo ‘tólinga mpe tósala’ mosala yango ya ntina.​—Flp. 2:13.

4. Mpo na nini tosengeli kotyaka likebi na kokómisa bato bayekoli?

4 Kosakola nsango malamu epesaka biso esengo mingi. Kasi, esengo na biso ebakisamaka soki toteyi moto solo mpe tosalisi ye akɔta na ‘nzela oyo ememaka na bomoi.’ (Mat. 7:14; 1 Tes. 2:19, 20) Oyo eleki ntina, soki tozali kotya likebi na kokómisa bato bayekoli, tozali kosepelisa Yehova, oyo “alingi moto ata moko te abomama kasi alingi nde bato nyonso bábongola motema.”​—2 Pe. 3:9.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto