Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • kr mok. 20 nk. 209-219
  • Mosala ya kosunga bandeko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mosala ya kosunga bandeko
  • Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mosala ya kosunga bandeko ezali “mosala mosantu”
  • Kosunga bandeko na mikano ya sikisiki
  • Mosala ya kosunga bandeko epesaka matomba ya solosolo
  • Yo mpe okoki kosalisa?
  • Makambo ya kosala mpo na kopesa mabɔkɔ nsima ya likama
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Batatoli ya Yehova mpe basalisaka bato oyo bazwi likama?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
  • Mosala ya kopesa lisungi na 2023​—“Tomoni mpenza bolingo ya Yehova”
    Ndenge oyo makabo na yo esalelamaka
  • Kosunga bandeko oyo bakutani na makama na 2021—Bandeko na biso basundolami te
    Ndenge oyo makabo na yo esalelamaka
Makambo mosusu
Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
kr mok. 20 nk. 209-219

MOKAPO 20

Mosala ya kosunga bandeko

MOKAPO OYO ELOBELI NINI?

Ndenge bolingo ya bokristo emonanaka na ntango ya makama minene

1, 2. (a) Mokakatano nini bakristo ya Yudea bakutanaki na yango? (b) Basalelaki bakristo ya Yudea likambo nini oyo emonisaki bolingo?

NA MOBU soki 46 T.B., nzala makasi ekɔtaki na etúká ya Yudea. Bayuda oyo bakómaki bakristo bazalaki na makoki te ya kokokisa bamposa na bango mpo biloko ya kolya ezalaki mingi te mpe ekómaki ntalo mingi. Bazalaki kokufa nzala mpenza. Kasi, Yehova asalisaki bango na ndenge oyo esalemaki naino liboso te mpo na bayekoli ya Kristo. Nini esalemaki?

2 Bayuda mpe bato ya bikólo mosusu oyo bakómaki bakristo mpe bazalaki kofanda na Antiokia, na etúká ya Siri bayokaki mawa mingi mpo na bakristo ya Yerusaleme ná ya Yudea mpe basangisaki mbongo mpo na kosunga bango. Na nsima, baponaki Barnabasi ná Saulo, mibali mibale oyo bakɔmɛli na elimo, mpo bákende kopesa bankulutu ya masangá ya Yerusaleme biloko yango ya lisungi. (Tángá Misala 11:27-30; 12:25.) Kanisá ndenge bandeko ya Yudea bayokaki ntango bamonaki bolingo ya bandeko na bango ya Antiokia!

3. (a) Ndenge nini basaleli ya Nzambe lelo balandaka ndakisa ya bakristo ya Antiokia? Pesá ndakisa. (Talá mpe etanda “Mosala na biso monene ya liboso mpo na kosunga bandeko.”) (b) Mituna nini tokotalela na mokapo oyo?

3 Likambo wana oyo esalemaki na siɛklɛ ya liboso ezalaki mbala ya liboso bálobela ndenge bakristo ya mboka moko batindelaki bakristo ya mboka mosusu biloko mpo na kosunga bango. Lelo, tolandaka ndakisa ya bandeko wana ya Antiokia. Soki toyoki ete bandeko na biso na esika moko boye bakutani na likama to bamekami makasi, tosungaka bango.a Mpo na komona ndenge mosala na biso ya kosunga bandeko ezali na boyokani na mosala mosantu, tótalela mituna misato: Mpo na nini tomonaka ete kosunga bandeko ezali mosala mosantu? Ntina ya mosala yango ezalaka nini? Matomba nini tozwaka na mosala yango?

Mosala ya kosunga bandeko ezali “mosala mosantu”

4. Paulo ayebisaki Bakorinti nini mpo na mosala ya bokristo?

4 Na mokanda na ye ya mibale epai ya Bakorinti, Paulo amonisaki ete mosala ya bokristo ezali na biteni mibale. Atako Paulo akomelaki libosoliboso bakristo oyo batyami mafuta na elimo, lelo oyo maloba na ye etali mpe “bampate mosusu” ya Kristo. (Yoa. 10:16) Eteni moko ya mosala ya bokristo ezali “mosala ya kozongisa na boyokani,” elingi koloba mosala ya kosakola mpe ya koteya. (2 Ko. 5:18-20; 1 Tim. 2:3-6) Eteni mosusu ezali mosala oyo esalemaka mpo na bolamu ya bandeko. Paulo alobelaki “mosala oyo esengelaki kosalema mpo na basantu.” (2 Ko. 8:4) Na maloba “mosala ya kozongisa na boyokani” mpe “mosala oyo esengelaki kosalema,” liloba oyo ebongolami na “mosala” ezali liloba kaka moko ya Grɛki diakonia. Mpo na nini ezali na ntina?

5. Ndenge Paulo alobaki ete kosunga bandeko ezali “mosala” emonisi nini?

5 Lokola Paulo asalelaki liloba moko mpo na misala yango mibale, amonisaki ete mosala ya kosunga bandeko ezalaki na kati ya misala oyo ezalaki kosalema na lisangá ya bokristo. Na mokanda ya liboso epai ya Bakorinti alobaki ete: “Misala ya kosunga bato ezali ndenge na ndenge, mpe atako bongo Nkolo azali kaka moko; mpe misala ezali ndenge na ndenge, . . . Kasi misala nyonso wana, elimo kaka moko nde esalaka yango.” (1 Ko. 12:4-6, 11) Na maloba mosusu, Paulo amonisaki ete misala ndenge na ndenge oyo ezalaki kosalema na lisangá ezalaki na boyokani na “mosala mosantu.”b (Rom. 12:1, 6-8) Yango wana amonaki ete ebongaki mpe ete apesa ntango na ye mpo na ‘kosalela basantu’!​—Rom. 15:25, 26.

6. (a) Ndenge Paulo alimbolaki yango, mpo na nini mosala ya kosunga bandeko ezali eteni ya losambo na biso? (b) Lobelá ndenge mosala ya kosunga bandeko na mokili mobimba esalemaka lelo oyo. (Talá etanda “Ntango likama esalemi!”)

6 Paulo asalisaki bakristo ya Korinti bámona ntina oyo mosala ya kosunga bandeko ezali na kati ya mosala ya bokristo mpe na kati ya losambo ya Yehova. Mpo na Paulo, bakristo oyo basungaka bandeko basalaka bongo mpamba te ‘batosaka nsango malamu oyo etali Kristo.’ (2 Ko. 9:13) Na yango, mposa ya kotosa mateya ya Kristo etindaka bakristo básalisa bandeko na bango. Paulo alobaki ete makambo nyonso oyo bakristo basalaka mpo na kosunga bandeko na bango ezali kaka mpo na komonisa “boboto monene ya Nzambe oyo eleki mpenza.” (2 Ko. 9:14; 1 Pe. 4:10) Yango wana, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/12/1975 elobaki mpo na mosala ya kosunga bandeko ete: “Tosengeli soki moke te kotya ntembe ete Yehova Nzambe ná Mwana na ye Yesu Kristo bazwaka mosala yango na motuya mingi.” Ya solo, mosala ya kosunga bandeko mpe ezali na kati ya mosala mosantu.​—Rom. 12:1, 7; 2 Ko. 8:7; Ebr. 13:16.

Kosunga bandeko na mikano ya sikisiki

7, 8. Wapi ntina ya liboso ya mosala ya kosunga bandeko? Limbolá.

7 Tosungaka bandeko na mikano nini? Paulo apesaki eyano na motuna yango na mokanda na ye ya mibale epai ya Bakorinti. (Tángá 2 Bakorinti 9:11-15.) Na bavɛrsɛ yango, Paulo alobelaki mikano misato ya “mosala oyo ezali kosalema mpo na bolamu ya bato nyonso,” elingi koloba mosala ya kosunga bandeko. Tólobela yango mokomoko.

8 Ya liboso, mosala ya kosunga bandeko epesaka Yehova nkembo. Na bavɛrsɛ wana mitano ya 2 Bakorinti, Paulo abendaki likebi ya bandeko mbala mingi epai ya Yehova Nzambe. Paulo akundwelaki bango likambo ya ‘kopesa Nzambe matɔndi.’ (Vɛrsɛ 11, 12) Alobelaki ndenge mosala ya kosunga bandeko etindaka bakristo ‘bápesa Nzambe nkembo’ mpe bákumisa “boboto monene ya Nzambe oyo eleki mpenza.” (Vɛrsɛ 13, 14) Mpo na kosukisa makambo oyo azalaki koloba na oyo etali mosala ya kosunga bandeko, Paulo alobaki ete: “Nzambe azwa matɔndi.”​—Vɛrsɛ 15; 1 Pe. 4:11.

9. Ndenge nini mosala ya kosunga bandeko ekoki kobongola makanisi ya moto? Pesá ndakisa.

9 Ndenge moko na Paulo, basaleli ya Nzambe lelo bamonaka ete mosala ya kosunga bandeko ezali libaku ya kopesa Yehova nkembo mpe ya kokembisa mateya na ye. (1 Ko. 10:31; Tito 2:10) Kutu, mosala yango esalisi bato mosusu bálongola makanisi ya mabe oyo bazalaka na yango mpo na Yehova mpe mpo na Batatoli na ye. Na ndakisa, na mboka moko, mwasi moko atyaki elembo na porte na ye oyo elobaki ete: “Soki bozali Batatoli ya Yehova, bóbɛta awa te.” Na nsima, ntango mopɛpɛ makasi ebɛtaki mboka na bango, mwasi yango amonaki bato bazali kobongisa ndako moko oyo ebebaki na ngámbo mosusu ya balabala. Mokolo na mokolo, azalaki komona ndenge bazalaki kosala na esengo, mpe na nsima akendaki kuna mpo na koyeba soki bazali banani. Ntango ayokaki ete bato yango bazali Batatoli ya Yehova, akamwaki makasi mpe alobaki: “Nazalaki kokanisela bino mabe.” Nini esalemaki? Alongolaki elembo oyo atyaki na porte na ye.

10, 11. (a) Bandakisa nini emonisi ete mosala ya kosunga bandeko ekokisaka malamu bamposa na bango? (b) Mokanda nini esalisaka bandeko oyo basalaka mosala ya kosunga? (Talá etanda “Lisalisi mpo na baoyo basungaka bandeko.”)

10 Ya mibale, na nzela ya mosala yango, ‘tokokisaka malamu bamposa’ ya bandeko. (2 Ko. 9:12a) Soki likama ebimi, tosalaka nokinoki mpo na kosunga bandeko mpe kokitisa mwa moke mpasi na bango. Mpo na nini? Mpo biso nyonso na lisangá ya bokristo tozali “nzoto kaka moko,” mpe “soki enama moko ezali koyoka mpasi, binama nyonso mosusu [eyokaka] mpasi elongo na yango.” (1 Ko. 12:20, 26) Yango wana, bolingo ya bondeko mpe motema mawa etindaka bandeko bábongola mbala moko baprogramɛ na bango, bázwa bisaleli na bango, mpe bákende nokinoki na bisika oyo makama ebimi mpo na kosunga bandeko. (Yak. 2:15, 16) Na ndakisa, nsima ya tsunami oyo ebɛtaki Japon na 2011, Betele ya États-Unis etindelaki Bakomite ya botongi na bitúká ya États-Unis mokanda mpo na kosɛnga “mwa bandeko oyo bayebi mosala,” oyo bakoki kokende kosalisa na kotonga lisusu Bandako ya Bokonzi na Japon. Nini esalemaki? Nsima ya mwa bapɔsɔ, bandeko soki 600 batondisaki formilɛrɛ, mpe bandimaki kokende na Japon na mbongo na bango moko! Betele ya États-Unis elobaki boye: “Motángo ya bandeko oyo bamipesaki elekelaki biso mpenza.” Ntango ndeko moko ya Japon atunaki moko ya bandeko oyo bayaki kosalisa na Japon ntina oyo andimaki koya, ndeko yango alobaki ete: “Bandeko na biso ya Japon bazali eteni ya ‘nzoto na biso.’ Mpasi na bango ezali mpasi na biso.” Na bantango mosusu, bandeko oyo bakei kosunga basusu bamonisaka bolingo ya solosolo na ndenge batyaka ata bomoi na bango na likama.c​—1 Yoa. 3:16.

Motatoli ya Yehova moko na Suisse azali kobongisa biloko mpo na kotindela bandeko mosusu, na 1946

Suisse, na 1946

MOSALA NA BISO MONENE YA LIBOSO MPO NA KOSUNGA BANDEKO

NA SANZA ya libwa na 1945, mwa basanza moke kaka nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba na Mpoto, ndeko Nathan Knorr apesaki liyebisi ete esengeli kobanda kotinda “biloko mpo na bandeko oyo bazali na bosɛnga na Mpoto ya ntei.”

Mwa bapɔsɔ nsima ya liyebisi wana, Batatoli ya Canada, ya États-Unis, mpe ya mikili mosusu babandaki kobongisa bilamba, kokanga yango maboke mpe kosangisa biloko ya kolya. Kobanda na sanza ya yambo 1946, batindaki biloko mpo na bandeko na biso na Allemagne, na Angleterre, na Autriche, na Belgique, na Bulgarie, na Chine, na Danemark, na Finlande, na France, na Grèce, na Hongrie, na Italie, na Norvège, na Pays-Bas, na Philippines, na Pologne, na Roumanie, mpe na Tchécoslovaquie.

Batindelaki bandeko biloko kaka mbala moko te. Biloko ekobaki kotindama na bamasuwa na boumeli ya mbula mibale na ndambo! Na ntango wana, bandeko soki 85 000 batindaki kilo soki 300 000 ya biloko ya kolya, kilo soki 450 000 ya bilamba, mpe basapato koleka 124 000 mpo na bandeko oyo bazalaki na mikili oyo ebebaki mpo na etumba. Na sanza ya mwambe 1948, mosala yango monene ya kosunga bandeko esilaki. Na 1949, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki boye: “Likambo wana emonisaki mpenza ete tolinganaka. Toyebi ete bandeko nyonso basalaki yango mpo na lokumu ya Nkolo, mpo bayebaki ete kosunga basusu na biloko ya mosuni ekosalisa bango bákoba na losambo ya solo; yango wana bamonaki ete ezalaki lokumu monene mpenza kosalela bandeko na bango na ndenge wana.” Mosala wana ya kosunga bandeko ekumisaki Yehova, esalisaki bandeko, mpe elendisaki bomoko ya bandeko na mokili mobimba.

11 Mosala na biso ya kosunga bandeko esepelisaka ata bato oyo bazali Batatoli te. Na ndakisa, ntango likama moko ebɛtaki etúká ya Arkansas, na États-Unis, na 2013, zulunalo moko elobelaki ndenge Batatoli bayaki nokinoki mpo na kosunga bandeko na bango; elobaki boye: “Batatoli ya Yehova bazwaka malako ya malamu mpenza, yango wana bayebaka kosunga bandeko na bango nokinoki mpe na ndenge oyo ebongi.” Ya solo, ndenge ntoma Paulo alobaki yango, ‘tokokisaka malamu’ bamposa ya bandeko na biso.

12-14. (a) Mpo na nini kosalisa bandeko oyo bazwi likama bázongela makambo ya elimo ezali na ntina mingi? (b) Makambo nini oyo bandeko balobaki emonisi ntina ya kozongela makambo ya elimo?

12 Ya misato, tosalisaka bandeko oyo bazwi likama bázongela makambo ya elimo. Yango ezali na ntina nini? Paulo alobaki ete ntango bandeko bazwi lisalisi, yango ekotinda bango bápesa Nzambe “matɔndi mingi.” (2 Ko. 9:12b) Lolenge ya malamu koleka oyo bandeko oyo bazwi likama bakoki kopesa Nzambe matɔndi ezali kozongela nokinoki makambo ya elimo, boye te? (Flp. 1:10) Na 1945, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki boye: “Paulo andimaki . . . ete bákɔngɔlaka makabo mpo ezalaki kosalisa . . . bakristo oyo bazali na bosɛnga bákokisa bamposa na bango ya mosuni mpo bázwa makasi ya komipesa na molende na mosala ya [kosakola].” Lelo mpe, mokano na biso ezali bongo. Soki bandeko bazongeli mosala ya kosakola, balendisaka bazalani na bango oyo bazali na mawa mpe bango moko bazwaka makasi.​—Tángá 2 Bakorinti 1:3, 4.

13 Tótalela mwa maloba ya baoyo bazwaki lisalisi na ntango ya likama, bazongelaki mosala ya kosakola, mpe bazwaki makasi na mosala yango. Ndeko mobali moko alobi boye: “Ezalaki esengo mingi ndenge libota na biso ezongelaki mosala ya kosakola. Lokola tozali koluka kobɔndisa basusu, esalisaki biso tóbosana mwa moke mitungisi na biso.” Ndeko mwasi moko alobaki ete: “Komipesa na makambo ya elimo esalisaki ngai nakanisa lisusu te ndenge likama ebebisi mboka na biso. Epesaki ngai kimya.” Ndeko mwasi mosusu alobaki boye: “Atako tokokaki kosala eloko te mpo na kobongisa makambo mosusu, mosala ya kosakola esalisi libota na biso. Koyebisa bato elikya ya mokili ya sika esalisaki biso tóbosana te ete biloko nyonso ekokóma biloko ya sika.”

14 Koyangana na makita ezali likambo mosusu oyo bandeko oyo bazwi likama basengeli kozongela nokinoki. Tózwa ndakisa ya Kiyoko, ndeko mwasi moko oyo azalaki na mbula pene na 60. Nsima ya kobungisa biloko nyonso na tsunami moko oyo esalemaki mpe atikalaki kaka na bilamba ná lipapa oyo alataki, asilaki mayele. Na nsima, nkulutu moko ayebisaki ye ete bakobanda kosala makita ya pɔsɔ na kati ya motuka na ye. Kiyoko alobi boye: “Na motuka yango, tozalaki ngai, nkulutu wana ná mwasi na ye, ná ndeko mwasi mosusu. Likita yango ezalaki molai te, kasi, makanisi ya tsunami elongwaki na motó na ngai lokola na ndenge ya likamwisi. Nayokaki kimya ya motema. Likita wana emonisaki ngai ntina ya koyangana na bakristo mosusu.” Ndeko mosusu ayebisi ndenge ayokaki mpo na makita oyo akɔtaki nsima ya likama oyo esalemaki; alobaki ete: “Esalisaki ngai nayika mpiko!”​—Rom. 1:11, 12; 12:12.

Mosala ya kosunga bandeko epesaka matomba ya solosolo

15, 16. (a) Litomba nini bandeko ya Korinti mpe bakristo mosusu bazwaki na mosala ya kosunga bandeko? (b) Ndenge nini tozwaka mpe matomba na mosala ya kosunga bandeko lelo?

15 Ntango Paulo alobelaki mosala ya kosunga bandeko, ayebisaki mpe bandeko ya Korinti matomba oyo bango mpe bakristo mosusu bakozwa na mosala yango. Alobaki ete: “Elongo na malɔmbɔ oyo bazali kosala mpo na bino bazali [bakristo ya Yerusaleme oyo bazwi lisungi] mpe koyoka bino mposa makasi mpo na boboto monene ya Nzambe oyo eleki mpenza epai na bino.” (2 Ko. 9:14) Ya solo, elimo ya kokaba ya bakristo ya Korinti elingaki kotinda bakristo oyo bazalaki Bayuda bábondela mpo na bandeko na bango ya Korinti, oyo mosusu bazalaki bato ya bikólo mosusu, mpe bálinga bango mingi.

16 Mpo na komonisa ete maloba ya Paulo oyo elobeli matomba ya mosala ya kosunga bandeko etali mpe biso lelo oyo, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/12/1945 elobaki ete: “Ntango basaleli ya Nzambe ya esika moko boye basalisi basaleli ya Nzambe ya esika mosusu, bakómaka na bomoko makasi!” Baoyo bamipesaka na mosala ya kosunga bandeko lelo oyo bamonaka ete ezali mpenza bongo. Nkulutu moko oyo amipesaki mpo na kosalisa bandeko oyo bakutanaki na likama ya mpela alobi boye: “Mosala ya kosunga bandeko esalisi ngai nalinga bango makasi koleka liboso.” Ndeko mwasi moko oyo asepelaki mingi na lisungi oyo azwaki alobaki ete: “Bondeko na biso ezali eloko ya motuya oyo tokozala na yango na Paradiso na mabele.”​—Tángá Masese 17:17.

17. (a) Ndenge nini maloba ya Yisaya 41:13 etali mosala ya kosunga bandeko? (b) Tángá mwa bandakisa oyo emonisi ndenge mosala ya kosunga bandeko ekumisaka Yehova mpe elendisaka bomoko na biso. (Talá mpe etanda “Bamipesi mpo na kosunga bandeko na mokili mobimba.”)

17 Ntango bandeko oyo bayei kosalisa bakómi na esika oyo likama esalemi, bandeko oyo bazwaki likama bamonaka bosolo ya elaka oyo ya Nzambe ete: “Ngai, Yehova Nzambe na yo, nazali kosimba lobɔkɔ na yo ya mobali, ngai Moto nazali koloba na yo ete: ‘Kobanga te. Ngai moko nakosalisa yo.’” (Yis. 41:13) Nsima ya kobika na likama, ndeko mwasi moko alobaki ete: “Nazalaki lisusu na elikya te ntango namonaki biloko oyo ebebaki, kasi Yehova atikaki ngai te. Maloba ezangi ngai mpo nalobela ndenge bandeko basalisaki ngai.” Ntango likama moko ebebisaki mboka na bango, bankulutu mibale bakomaki mokanda na nkombo ya masangá na bango; balobaki boye: “Koningana ya mabele esalaki biso mpasi mingi, kasi tomonaki ndenge Yehova asungaki biso na nzela ya bandeko na biso. Tozalaki kotánga likambo ya kosunga bandeko kaka na mikanda, kasi biso moko mpe tomonaki yango na miso.”

Peter Johnson azali kosala na mosala ya kotonga ndako moko

ELAKISAKI NGAI NZELA

MOSALA ya kosunga bandeko oyo bazwi likama ekoki kosala nini epai ya bilenge? Tótala likambo oyo ekómelaki Peter Johnson, oyo asalaki mosala ya kosunga bandeko mpo na mbala ya liboso ntango azalaki na mbula 18. Alobi boye: “Komona ndenge bandeko bazali kopesa matɔndi mpe esengo ya kopesa oyo nayokaki esimbaki mpenza motema na ngai. Elendisaki mposa na ngai ya komipesa na mosala ya Yehova bomoi na ngai mobimba.” Nsima na yango, ndeko Peter akómaki mobongisi-nzela. Asalaki mpe na Betele mpe na nsima, akómaki kosala na Komite ya botongi na etúká na bango. Lelo, alobi boye: “Kosala mosala ya kosunga bandeko mbala ya liboso na 1974 elakisaki ngai nzela.” Soki ozali elenge, kanisá ndenge okoki kolanda ndakisa ya ndeko Peter! Toyebi te ndenge oyo mosala ya kosunga bandeko ekoki mpe kolakisa yo nzela na mosala ya Yehova!

Yo mpe okoki kosalisa?

18. Okoki kosala nini soki olingi kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosunga bandeko oyo bazwi likama? (Talá mpe etanda “Elakisaki ngai nzela.”)

18 Olingi koyoka esengo ya kosunga bandeko? Soki ezali bongo, yebá ete mbala mingi bandeko oyo bakendaka kosunga na ntango ya likama ezalaka bandeko oyo batongaka Bandako ya Bokonzi. Na yango, yebisá bankulutu ete olingi kotondisa formilɛrɛ. Nkulutu moko oyo asali mingi na mosala ya kosunga bandeko alobi boye: “Okokende na esika oyo likama ebimi kaka soki bandeko ya Komite ya bosungi babengisi yo.” Na ndenge yango, mosala na biso ya kosunga bandeko ekosalema na molɔngɔ.

19. Ndenge nini basali na mosala ya kosunga bandeko basalisaka mingi na komonisa ete tozali mpenza bayekoli ya Kristo?

19 Ya solo, mosala ya kosunga bandeko ezali lolenge malamu ya kotosa etinda oyo Yesu apesaki ete tosengeli ‘kolingana.’ Soki tozali na bolingo ndenge wana, tokomonisa ete tozali mpenza bayekoli ya Kristo. (Yoa. 13:34, 35) Ezali mpenza lipamboli kozala na ebele ya bandeko oyo bamipesi na bolingo na bango moko mpo na kopesa Yehova nkembo na nzela ya mosala ya kosunga na ntango ya likama bato ya sembo oyo bandimi Bokonzi ya Nzambe!

a Mokapo oyo elobeli mosala ya kosunga bandeko na biso Batatoli ya Yehova. Kasi, mbala mingi, ata baoyo bazali Batatoli ya Yehova te bazwaka matomba na yango.​—Gal. 6:10.

b Paulo asalelaki liloba diakonos (mosaleli) na boike mpo na kolobela “basaleli na misala.”​—1 Tim. 3:12.

c Talá lisolo “Tosungaki bandeko na biso bandimi na Bosnie,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/11/1994, nkasa 23-27.

Bokonzi ezali likambo ya solo na miso na yo?

  • Ndenge nini toyebi ete mosala ya kosunga bandeko ezali na kati ya mosala mosantu epai ya Yehova?

  • Wapi ntina misato ya mosala ya kosunga bandeko?

  • Matomba nini mosala ya kosunga ememaka?

  • Mosala ya kosunga ezali na boyokani nini na etinda oyo ezali na Yoane 13:34?

BAMIPESI MPO NA KOSUNGA BANDEKO NA MOKILI MOBIMBA

AFRIKA YA NTEI MPE YA WƐSTI

Na 1994, bato soki 800 000 to koleka bakufaki ntango bato ya bikólo mibale ya Rwanda babomanaki. Na yango, ebele ya bato bakimaki na mikili mosusu ya Afrika ya ntei, mpe yango esalaki ete bakaa ya bato oyo bakimá mboka etonda mpenza. Mpo na kosalisa bandeko oyo bazwi likama, Batatoli ya Yehova ya Belgique, ya France, mpe ya Suisse batindaki na mpɛpɔ tɔni soki 300 ya bilamba, bankisi, bakapo, biloko ya kolya, mpe biloko mosusu. Mwa bapɔsɔ na nsima, biloko yango ekómelaki bandeko na biso oyo bazalaki na bosɛnga.

Kaka na Afrika, Batatoli 10 oyo bazalaki minganga bautaki France mpe bayaki kosalisa bandeko oyo bazalaki konyokwama mpo na etumba, nzala, mpe maladi. Na mbula mibale oyo eleki, bandeko yango basololi na bato ya maladi koleka 10 000. Mosala na bango ekumisi Yehova mpe ebongiseli na ye. Ndeko moko kati na minganga yango alobi boye: “Soki tokómi na esika moko mpo na kosalisa bandeko na biso, bato balobaka na limemya ete, ‘bazali Batatoli ya Yehova. Bayei kosalisa bandeko na bango.’” Nsima ya kozwa lisalisi ya monganga, ndeko moko alobaki boye: “Matɔndi mingi ndeko na ngai. Matɔndi mingi Yehova!”

Na bantango mosusu, mosala ya kosunga esalemaka mpe soki aksida monene esalemi. Na 2012, aksida moko ya motuka oyo esalemaki na Nigeria ebomaki Batatoli 13 ya lisangá moko, mpe Batatoli mosusu 54 bazokaki makasi. Komite mpo na kosunga ezwaki bibongiseli mpo bandeko bázala na lopitalo ntango nyonso mpo na kokɛngɛla ndeko mokomoko. Ntango mwasi moko oyo azalaki maladi amonaki ndenge bandeko bazalaki kolɛngɛla baoyo bazokaki, abengaki pastɛrɛ na bango mpe alobaki ete: “Ata moto moko te ya lingomba na biso ayei kotala ngai. Yaká awa na lopitalo omona ndenge Batatoli ya Yehova bazali komonisa ete balingaka bandeko na bango!”

Atako bandeko na biso ya lisangá wana bayokaki mpasi mingi mpo na aksida wana, bolingo oyo bandeko bamonisaki ebɔndisaki bango. Lisusu, ntango bandeko ya lisangá yango bamonaki bolingo ya bandeko oyo bayaki kosunga bango, basakoli mingi na lisangá yango babakisaki molende na mosala ya kosakola. Liboso ya aksida wana, basakoli bazalaki 35. Nsima ya mbula moko, bakómaki 60.

AUSTRALIE

Na 2013, mpela esalemaki na eteni monene ya etúká ya Queensland mpe bandako ya Batatoli 70 ekweaki. Ntango ndako na bango ezindaki na mpela, Mark ná Rhonda mpe mwana na bango ya mwasi bakimaki na esika oyo bazalaki kosangisa bato. Esika yango etondaki na bato mɛkɛ. Rhonda alobi boye: “Esika ya kofanda ezalaki te.” Makɛlɛlɛ makasi ya ba-hélicoptère ezalaki kobakisa bango motó mpasi. Rondha amitungisaki mpe atunaki mobali na ye ete: “Sikoyo tokosala nini?” Mark abondelaki Yehova asalisa bango. Rhonda alobi boye: “Miniti soki 30 na nsima, motuka moko eyaki mpe bandeko misato bakitaki. Ntango bamonaki biso, balobaki ete: ‘Toyei kozwa bino. Bokofanda na ndako ya ndeko moko.’” Rhonda abakisi ete: “Maloba ezali te mpo na koyebisa ndenge toyokaki na ntango wana oyo tomonaki bolingo oyo ezali na lisangá ya Yehova.”

Bandeko koleka 250 bayaki nokinoki na esika wana oyo likama esalemaki mpo na kosalisa bandeko na bango. Ndeko mobali moko ya mobange alobi boye: “Etuluku moko ya bandeko bayaki mbala moko mpe basalaki mosala makasi mpo na kolongola bosɔtɔ na ndako na ngai. Ngai ná mwasi na ngai tokobosana te ndenge basalisaki biso.”

BRÉSIL

Na 2008, pɔtɔpɔtɔ mpe mpela ebebisaki bandako ya bato soki 80 000 na etúká ya Santa Catarina. Moto moko oyo azalaka kuna alobaki ete ezalaki lokola “tsunami ya mabele, ya pɔtɔpɔtɔ mpe ya banzete.” Bandeko mosusu bakimaki na ndako moko ya mayangani. Ndeko Márcio, mokɛngɛli ya Ndako ya Mayangani alobi boye: “Bakimaki kaka na bilamba oyo balataki, nzoto mobimba etondi na pɔtɔpɔtɔ.” Ndeko mwasi moko alobi ete: “Ndako na biso ekweaki. Komona ndenge elimwaki na miniti esalaki biso mpasi mingi, kasi nakobosana te ndenge bandeko na biso babɔndisaki biso. Bamoniselaki biso bolingo na ndenge nyonso! Likambo yango emonisaki ngai ete eleki malamu kokangama na makambo ya elimo.”

Batatoli ya Yehova bazali kobongisa mpe kokabola biloko bakopesa bandeko oyo bazwi likama na Brésil

Ndako moko ya mayangani na Brésil ekómi esika ya kokabola biloko mpo na bandeko oyo bazwi likama, na 2009

Pɔtɔpɔtɔ ebebisá bakartye nyonso oyo ezali na mopanzi ya bangomba pene ya engumba Rio de Janeiro. Lokola makama yango ezongaka mbala na mbala, bandeko basalá Komite mpo na kosunga bandeko na ntango ya likama. Baponá mwa bandeko oyo bafandi na esika yango mpo soki bayoki ete pɔtɔpɔtɔ elingi kokita lisusu, báyebisa yango na Komite mpo na kosunga. Bandeko bayaka nokinoki na mituka minene oyo bakomá “Batatoli ya Yehova: kosunga bato.” Ndeko nyonso azalaka na bisaleli oyo esengeli mpe ayebaka mosala oyo asengeli kosala. Balataka kazaka oyo emonisaka polele ete bazali Batatoli ya Yehova. Elongo na bandeko ya Bakomite mpo na boyokani na minganga, basungaka bandeko oyo bazwi likama. Bandeko oyo bayei mpo na kosunga basusu bamemaka biloko ya kolya, bankisi ya monganga, bilamba, mpe bankisi mpo na kotya bopɛto. Kolongola pɔtɔpɔtɔ na bandako ezali mosala makasi. Mikolo euti koleka, na ndako moko mpamba, bandeko 60 mobimba balongolaki pɔtɔpɔtɔ oyo etondisaki mituka ya minene minei!

KOMIBONGISA MPO NA LIKAMA

Lisangani ya Mikóló-Bakambi eyebisá babiro ya filiale ya mokili mobimba ete bápesa bankulutu mpe bakɛngɛli-batamboli malako mpo na ndenge ya komibongisa mpo na likama mpe ndenge ya kosala soki likama ebimi. Na ndakisa, liboso kutu ete likama esalema, bankulutu basengeli kozala na nimero ya telefone oyo ndeko mokomoko azali kosalela sikoyo mpe adrɛsi ya ndako na bango.

NTANGO LIKAMA ESALEMI!

  1. Nkulutu moko azali koluka koyeba soki libota moko ya bakristo ezali malamu

    Bankulutu balukaka koyeba esika bandeko bazali

  2. Bankulutu bapesaka mokambi-misala ya bankulutu lapolo

  3. Bakambi-misala ya bankulutu, bakɛngɛli-batamboli, bandeko oyo bazali na mokumba ya kokabolela bandeko oyo bazwi likama biloko mpe bandeko ya Betele bazali kosolola na telefone

    Mokambi-misala ya bankulutu apesaka lapolo epai ya mokɛngɛli ya zongazonga mpe bandeko mosusu oyo basololaka na biro ya filiale

  4. Mai mpe biloko ya kolya oyo bamemeli bandeko

    Basalaka nokinoki mpo na komemela bandeko biloko ya kolya, mai, bakapo, kosalisa bango na nzoto, mpe kolendisa bango na elimo

  5. Bazali kotala biloko oyo esengeli mpo na kosalisa bandeko

    Biro ya filiale eyebisaka Komite ya batambwisi ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi makambo nyonso mpe bosɛnga ya bandeko

  6. Bazali kokabolela bandeko oyo bazwi likama biloko

    Komite mpo na kosunga bandeko oyo bazwi likama ezwaka bibongiseli mpo na kosalisa mpenza bandeko

  7. Mpɛpɔ ezali kopumbwa

    Komite ya Batambwisi etalelaka bosɛnga ya bandeko, mpe soki esengeli, etindaka bandeko ya mikili mosusu bákende kosalisa

LISALISI MPO NA BAOYO BASUNGAKA BANDEKO

Ezipeli ya buku Batatoli ya Yehova mpe lisungi na ntango ya likama

NA SANZA ya motoba na 2013, mwa buku Batatoli ya Yehova mpe lisungi na ntango ya likama ebimisamaki na Lingelesi. Ebongisamaki libosoliboso mpo na bakonzi ya Leta ya États-Unis oyo batalelaka makambo ya kosunga na ntango ya makama. Mwa buku yango elobeli makambo oyo tosali banda na 1945 mpo na kosunga bandeko na biso na ntango ya likama. Ezali mpe na karte oyo emonisi mosala monene oyo tosali mpo na kosunga bandeko na biso na mokili mobimba. Moko ya bankulutu oyo batambwisaka mosala ya kosunga bandeko alobi boye: “Bandeko ya Bakomite mpo na kosunga na ntango ya likama basalelaka mwa buku yango mpo na koyokana na bakonzi oyo bafandi na bisika oyo eyebani ete makama ekoki kobima, liboso kutu likama esalema. Soki bakonzi yango bayebi malamu mosala oyo tosalaka mpo na kosunga bandeko na biso, ezalaka mpasi te mpo bápesa biso ndingisa ya kokɔta na bisika oyo makama esalemi.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto