LOYEMBO 78
‘Tóteya Liloba ya Nzambe’
Ya Papye
1. Biso, bateyi-Liloba,
Toza’ na esengo.
Matomba tozali kozwa
Eza’ mingi mpenza.
Toza’ kosalisa bato
Báyekola solo.
Toteyaka bango lokola
Yesu, na bolingo.
2. Awa toz’oteya bato,
Tósalaka nyonso
Bámona pole ya Nzambe
Na bomoi na biso.
Yango wana, tóyekola
Mpenza na mozindo.
Mpo oyo toza’ kozwa kuna
Eteyaka biso.
3. Yah aza’ kopesa nyonso
Na mosala oyo.
Nyonso oyo tosɛngi ye,
Akosala yango.
Tólinga Liloba na ye,
Mpo ekosaka te.
Tólinga bato toz’oteya,
Bákóma bateyi!
(Talá mpe Nz. 119:97; 2 Tim. 4:2; Tito 2:7; 1 Yoa. 5:14.)