LOYEMBO 133
Tósalela Yehova na bolenge na biso
Ya Papye
1. Yehova Nzambe alingi biso,
Tómipesa n’e, biso bilenge.
Akosala nyonso mpo na biso,
Mpe akopambola biso seko.
2. Tókumisa baboti na biso,
Tófungolela bango motema.
Yehova Nzambe akosepela,
Akozala moninga na biso.
3. Bilenge, tósalela Yehova.
Tólinga mpenza liloba na ye.
Tóboma nzoto na mosala n’e,
Tósepelisa Yehova Nzambe.
(Talá mpe Nz. 71:17; Bil. 3:27; Ef. 6:1-3.)