LOYEMBO 52
Komipesa mpe batisimo
Ya Papye
1. Yehova Nzambe, okelá
Molɔ́ngɔ́ mobimba,
Osalá biloko nyonso,
Likoló mpe na nse.
Opesi mpema ya bomoi;
Ozali bolingo,
Bikelamu nyonso ebongi
Básambela kaka yo.
2. Yesu abatisamaki,
Esɛngaki bongo.
Abondelaki Yehova:
‘Nayei mosala n’o.’
Ntango ye abimi na mai,
Atyami mafuta.
Alaki Nzambe:
‘Nakosala, Tata, mokano na yo.’
3. Yehova, Nzambe na biso,
Toyei epai na yo.
Tomiboyi, tomipesi
Na mabɔkɔ na yo.
Opesaki Mwana na yo;
Asombaki biso.
Tondimi kokufa mpo na yo,
Yah, tomipesi na yo.
(Talá mpe Mat. 16:24; Mrk. 8:34; Luka 9:23.)