LOYEMBO 106
Tókolisa bolingo
Ya Papye
1. Tobondeli Yehova Nzambe,
Mpo tólanda bizaleli n’e.
Kasi na nyonso bolingo nde
Ezaleli ya ntina mingi.
Ata toza’ mayele mingi,
Kozanga bolingo, ntina te.
Tósɛnga Yehova bolingo,
Ya mbɛbu te, ya solosolo.
2. Bolingo ekotinda biso
Tósalisa bandeko nyonso.
Tokoboya koyina bango.
Soki basali biso mabe
Tokolimbisa bango mpenza,
Tokolanda ndakis’a Nzambe.
Ata makambo eyei mabe,
Bolingo ekozala seko.
(Talá mpe Yoa. 21:17; 1 Ko. 13:13; Gal. 6:2.)