LOYEMBO 122
Tópikama makasi, tóninganaka te!
Ya Papye
1. Bato basili mayele lelo.
Bayebi te soki bakobika.
Kasi biso tokoningana te,
Tókangama na Nzambe.
(MONDIMO)
Ɛɛ, tópikama mpenza;
Tókima bato mabe.
Tópikama mpenza,
Tii bomoi ya seko.
2. Mitambo ezali mingi mpenza.
Tókeba tókwea na yango te.
Tóyina mabe, tólinga solo
Tókangama na Nzambe.
(MONDIMO)
Ɛɛ, tópikama mpenza;
Tókima bato mabe.
Tópikama mpenza,
Tii bomoi ya seko.
3. Sambelá Yah na motema moko.
Bundeláká mosalʼa Nkolo.
Sakolá Bokonzi, kotika te.
Nsuka ekómi pene.
(MONDIMO)
Ɛɛ, tópikama mpenza;
Tókima bato mabe.
Tópikama mpenza,
Tii bomoi ya seko.
(Talá mpe Luka 21:9; 1 Pe. 4:7.)