LOYEMBO 61
Batatoli, bókende liboso!
1. Mpiko, molende, na ntango ya nsuka,
Batatoli bazali kopanza nsango.
Satana ayinaka biso.
Akolonga te, Yehova azali.
(MONDIMO)
Batatoli, bókende kaka liboso!
Bósepela mpo bosalelaka Nkolo!
Bópanza nsango: Paradiso ez’oya;
Ekoya na mapamboli mingi.
2. Bóluka te bisengo ya mokili.
Bókosama te na bakonzi na yango.
Tóboya mbindo biso nyonso,
Mpo tóbatela bosembo na biso.
(MONDIMO)
Batatoli, bókende kaka liboso!
Bósepela mpo bosalelaka Nkolo!
Bópanza nsango: Paradiso ez’oya;
Ekoya na mapamboli mingi.
3. Mokili esɛki Yehova Nzambe;
Babangaka te kotyola nkombo na ye.
Nde biso tósantisa yango,
Tósakola yango bikólo nyonso.
(MONDIMO)
Batatoli, bókende kaka liboso!
Bósepela mpo bosalelaka Nkolo!
Bópanza nsango: Paradiso ez’oya;
Ekoya na mapamboli mingi.
(Talá mpe Kob. 9:16; Flp. 1:7; 2 Tim. 2:3, 4; Yak. 1:27.)