LOYEMBO 136
Yehova akopesa mbano
Ya Papye
1. Yehova aza’ sembo mpe ayebi
Basaleli n’e ya sembo.
Ayebi ndenge bamipimelaka
Mpo na Bokonzi ya Nzambe.
Soki otiká nyonso mpe libota,
Yehova ayebi yango.
Lelo apesi yo bandeko mingi;
Mpe lobi, bomoi ya seko.
(MONDIMO)
Tiká Yehova akanisa yo.
Apes’o nsuka mpenza ya mbano.
Mapapu na y’ebatela yo.
Nzambe aza’ sembo; akofuta yo.
2. Omonaka neti obotamaki
Se mpo na komona mpasi?
To mpe omonaka osuki mpenza,
Mayele na yo esili?
Kasi Nzambe, Moyoki-mabondeli,
Ayebi bamposa na yo.
Elimo na ye, Biblia, bandeko,
Ekosalisa yo mpenza.
(MONDIMO)
Tiká Yehova akanisa yo.
Apes’o nsuka mpenza ya mbano.
Mapapu na y’ebatela yo.
Nzambe aza’ sembo; akofuta yo.
(Talá mpe Bas. 11:38-40; Yis. 41:10.)