LOYEMBO 65
Kende liboso!
Ya Papye
1. Ɛɛ, kende liboso, kolá n’elimo!
Ngɛngisáká pole bato bámona solo.
Bongisá ndenge na yo ya koteya;
Tyelá Nzambe motema.
Yo mpe okoki kosakola.
Wana mosala Yesu’asalá.
Talelá Yehova mpo okwea te,
Mpe otikala sembo.
2. Ɛɛ, kende liboso, zalá molende!
Panzá nsango malamu, kopona moto te.
Kumisá Yehova yo ná bandeko,
Teyá ndako na ndako.
Banguna bakosepela te,
Kasi yo kozonga nsima te.
Bokonzi ya Nzambe ekómi pene.
Yebisá yango bato.
3. Ɛɛ, kende liboso, mpe kolɛmba te.
Kolisá mayele,
mosala eza’ mingi.
Tiká elimo na ye ekamba yo.
Akosepelisa yo.
Lingá moto oza’ koteya.
Zongá mpo osimba motema.
Salisá ye akola, alinga Yah,
Nde pole ekongɛnga.
(Talá mpe Flp. 1:27; 3:16; Ebr. 10:39.)