LOYEMBO 109
Tólingana makasi, na motema moko
Ya Papye
1. Soki tolingani solo,
Yehova akosepela.
Bolingo eleki nyonso,
Eloko ya ntalo.
Soki olingi bandeko,
Bango mpe bakolinga yo.
Okoluka mpe liboso
Bolamu na bango.
Ntango ndeko azangi,
Tósalisa ye na bolingo.
Tózala pene na ye,
Tómitya n’esika n’e.
Mpo na kolinga bandeko
Landá ndakisa ya Yesu.
Azwá bolingo’a Yehova.
Yo mpe lingá bandeko
Na bolingo ya solo.
(Talá mpe 1 Pe. 2:17; 3:8; 4:8; 1 Yoa. 3:11.)