LOYEMBO 32
Poná nde Yehova!
1. Tozalaki na mobulungano,
Mpo mangomba ekosaki biso;
Kasi lelo totondi n’esengo,
Tomoni nzel’a solo.
(MONDIMO)
Poná nde Yehova; Sepelá na ye.
Akotika yo te; Landá pole n’e.
Sakolá bonsomi, Kimya ya solo
Na Bokonzi’a Nzambe, Na nzel’a Kristo.
2. Biso tosí toponi Yehova,
Toza’ koteya bipai nyonso.
Ntango yang’oyo moto na moto
Apona nde Yehova.
(MONDIMO)
Poná nde Yehova; Sepelá na ye.
Akotika yo te; Landá pole n’e.
Sakolá bonsomi, Kimya ya solo
Na Bokonzi’a Nzambe, Na nzel’a Kristo.
3. Biso tokobanga Satana te.
Yehova Nzambe aza’ na biso.
Bango baza’ mingi, biso moke,
Nguya na biso, Nzambe.
(MONDIMO)
Poná nde Yehova; Sepelá na ye.
Akotika yo te; Landá pole n’e.
Sakolá bonsomi, Kimya ya solo
Na Bokonzi’a Nzambe, Na nzel’a Kristo.
(Talá mpe Nz. 94:14; Mas. 3:5, 6; Ebr. 13:5.)