LOYEMBO 42
Libondeli ya mosaleli ya Nzambe
Ya Papye
1. Ee Yehova, yo Nzambe na biso,
Nkombo na yo, tiká esantisama.
Mokano na yo esalema.
Bokonzi eya, toza’ kosɛnga.
Eya ntango oponi,
Eya na mapamboli.
2. Totɔndi yo mpo mikolo nyonso,
Lobɔkɔ na yo epesaka biso:
Bomoi, pole, mai, mopɛpɛ,
Bwanya, bososoli mpe boyebi.
Tiká tótɔndaka yo,
Yo motema boboto.
3. Na mokili, toza’ na bampasi.
Kasi biso totalelaka se yo.
Tata, zwá mikumba na biso.
Pesá makasi, tókoba kaka.
Tókoba kotosa yo,
Ndenge tolakaki yo.
(Talá mpe Nz. 36:9; 50:14; Yoa. 16:33; Yak. 1:5.)