LOYEMBO 137
Basi ya sembo, basi bakristo
Ya Papye
1. Banda kala, basi ya sembo baza’:
Hana, Maria, Ruta, Estere, Sara . . .
Batyaki Nzambe n’esik’a liboso.
Bango, toyebi bankombo na bango.
Ezali mpe na basi mosusu;
Nkombo toyebi te, bazalaki sembo.
2. Basi yango, basi malamu mpenza.
Basi’a boboto, mpiko, mpe bolingo.
Bazali ndakisa malamu mpenza.
Tómekola bizaleli na bango.
Lelo oyo mpe bandeko basi,
Baza’ mpenza sembo, ndakisa malamu.
3. Bamama mpe bandeko basi nyonso,
Bóyeba: Nzambe alingaka bino.
Mpo bomonisaka komikitisa,
Mpe bizaleli ya malamu mpenza.
Tiká Nzambe azala na bino,
Mpe bóyika mpiko, bókɔta Paradi.
(Talá mpe Flp. 4:3; 1 Tim. 2:9, 10; 1 Pe. 3:4, 5.)