Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 10/08 lok. 3
  • Mikolo ya nsuka—Ya nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mikolo ya nsuka—Ya nini?
  • Lamuká!—2008
  • Masolo mosusu
  • Yehova alaki danyele mbano monene
    Tyá likebi na esakweli ya Danyele!
  • Mokanda ya Danyele—ntina na yango mpo na yo
    Tyá likebi na esakweli ya Danyele!
  • Motindami ya nzambe alendisi danyele
    Tyá likebi na esakweli ya Danyele!
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Danyele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Makambo mosusu
Lamuká!—2008
g 10/08 lok. 3

Mikolo ya nsuka​—Ya nini?

NA FENETRE ya magazini moko bakomi maloba oyo: “Mikolo ya nsuka.” Ezali mpasi te moto ayeba soki elingi koloba nini. Ekoki kozala ete eleko oyo bakitisaki ntalo ya biloko elingi kosila to etikali moke magazini yango ekangama. Kasi, ezali boni soki moto alobi ete, “Tozali na mikolo ya nsuka”? Yango elimboli nini?

Banda kala, Biblia elobelaki “mikolo ya nsuka” to “ntango ya nsuka.” (2 Timote 3:1; Danyele 12:4, NW) Eleki mbula soki 2 500, mosakoli Danyele azwaki bimonaneli oyo eyebisaki bikólo oyo esengelaki koleka makasi na mokili mpe matata oyo esengelaki kozala kati na bikólo yango tii na “ntango ya nsuka.” Bayebisaki ye ete ndimbola ya bimonaneli yango esengelaki kokóma polele na ntango ya nsuka. (Danyele 8:17, 19; 11:35, 40; 12:9) Danyele akomaki lisusu boye: “Na mikolo ya mikonzi yango Nzambe ya lola akotɛmisa bokonzi bokobebisama soki moke te, mpe bokonzi yango ekopesama na bato mosusu te; ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala lobiko na lobiko.”​—Danyele 2:44.

Yesu Klisto mpe alobelaki “nsuka” ntango azalaki koyanola na motuna etali “elembo ya kozala na [ye] mpe ya bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” (Matai 24:3-42) Emonani ete Danyele mpe Yesu balobelaki mbongwana moko monene oyo esengelaki kotalela bato oyo bakozala na ntango yango mpe baoyo bazalaká liboso. Danyele alobelaki nsuka ya baguvɛrnema nyonso ya mokili. Yesu alobelaki “bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.”

Ezali na ntina oyeba likambo yango? Ɛɛ! Lokola likambo yango etali biso nyonso, moto nyonso asengeli koluka koyeba yango. Nzokande, bato mingi bazali kokipe yango te. Biblia esakolaki boye: “Na mikolo ya nsuka basɛki bakoya ná kosɛka na bango, kotamboláká engebene bamposa na bango moko mpe kolobáká ete: ‘Wapi kozala na ye oyo elakamaki? Kutu, banda mokolo bankɔkɔ na biso balalá na kati ya liwa, makambo nyonso ezali kokoba kaka ndenge ezalaki banda na ebandeli ya bozalisi.’” (2 Petelo 3:3, 4) Ya solo, bato mingi lelo oyo bazali komona ete makambo ezali kaka ndenge ezalaka banda kala mpe ete bomoi ekozala kaka ndenge toyebi yango.

Ezali nde na elembeteli ete tozali mpenza na eleko oyo Biblia ebengi mikolo ya nsuka? Tótalela motuna yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto