Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 7/11 nk. 22-24
  • Na nzela ya baombo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Na nzela ya baombo
  • Lamuká!—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Lisolo moko molai mpe ya nsɔmɔ
  • Mobembo moko ya kolela
  • Boombo esili!
  • Mokakatano ya Lingomba ntango Brésil ezalaki na mabɔkɔ ya Portugal
    Lamuká!—2003
  • Bamilió ya bato bakómi baombo
    Lamuká!—1995
  • Nzambe andimaki likambo ya kotɛkisa bato baombo?
    Lamuká!—2002
  • Koluka kolongwa na boombo na ntango ya kala mpe lelo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
Makambo mosusu
Lamuká!—2011
g 7/11 nk. 22-24

Na nzela ya baombo

KOBANDA na ekeke 17 tii ya 19, engumba Ouidah ezalaki esika monene ya kotɛkisa baombo na Afrika ya Wɛsti. Ouidah, oyo ezali lelo na ekólo Bénin, emonaki ndenge bamemaki baombo koleka milio moko na mikili mosusu. Mbala mingi, bato ya Afrika bazalaki kotɛka baninga na bango bato ya Afrika mpo na kozwa biloko lokola masanga, bilamba, bikɔmɔ (bracelets), bambeli, mipanga, mpe mingimingi mindoki, mpo bato bazalaki koluka yango mingi mpo na bitumba oyo ezalaki kati na mabota.

Kobanda na ekeke 16 tii ya 19, bakanisaka ete bato ya Afrika soki milio 12 batyamaki na bamasuwa mpe bakatisaki Mbu ya Atlantike tii na Amerika, epai mposa ezalaki makasi ya kozwa baombo na mosala ya bilanga mpe ya kotimola mabanga ya ntalo. Buku moko (American Slavery​—1619-1877) elobi ete baombo mingi (soki 85%) “bakendaki na Brésil mpe na bisanga ndenge na ndenge ya Caraïbes oyo Angleterre, France, Espagne, mpe Pays-Bas ezalaki koyangela.” Bakanisaka ete baombo mosusu (soki 6%) bakendaki na bamboka oyo, na nsima, ekómaki États-Unis.a

Na ebandeli ya mobembo, baombo mingi, wana bakangami minyɔlɔlɔ, babɛtami, mpe batyami bilembo, bazalaki kotambola na nzela ya kilomɛtrɛ 4. Lelo, nzela yango euti na Musée d’histoire de Ouidah, ndako moko makasi oyo batongá lisusu, tii na esika oyo babengi Porte ya kozonga lisusu te (la Porte du non retour), oyo ezali na libongo. Porte yango nde nsuka ya Nzela ya baombo. Ezali kaka lolenge ya koloba, mpo baombo nyonso bazalaki kotyama na masuwa kaka na esika moko te. Mpo na nini boombo ekómaki mingi bongo?

Lisolo moko molai mpe ya nsɔmɔ

Banda kala, bakonzi ya Afrika bazalaki kotɛkela Baarabe oyo bazalaki kosala mombongo bakangami oyo bazwami na bitumba. Na nsima, bikólo ya Mpoto oyo ezalaki makasi ekɔtaki na mombongo ya baombo, mingimingi nsima ya kosala bakɔlɔni na Amerika. Na ntango wana, ntango libota moko ezali kobunda na libota mosusu, bato oyo balongi bazalaki kokanga bato mpe kokómisa bango baombo; na yango, bitumba ekómaki mombongo oyo ezalaki kofuta mingi mpo na balongi mpe bato ya lokoso oyo bazalaki kosomba baombo. Mpo na kozwa baombo, bazalaki mpe kokanga bato na makasi to kosomba bango na mabɔkɔ ya batɛkisi, bato ya Afrika, oyo bazalaki kouta na bango na bamboka ya kati. Pene na moto nyonso akokaki kotɛkama lokola moombo, ata nkumu oyo mokonzi na ye azali kosepela na ye lisusu te.

Moto moko ya mombongo oyo ayebanaki mingi ezali Francisco Félix de Souza, mwana-mboka Brésil. Na 1788, De Souza akómaki kokamba ndako makasi oyo ezalaki esika monene ya kotɛka baombo na Ouidah, na bokula ya Bénin. Na ntango wana, Ouidah ezalaki na bokonzi ya Dahomey. Kasi, De Souza azwanaki matata ná Adandozan, mokonzi ya Dahomey. Na yango, mbala mosusu wana De Souza azalaki na bolɔkɔ, ye ná leki ya mokonzi basalelaki mokonzi likita, mpe bango mibale balongolaki ye na bokonzi na 1818. Na yango, Guézo (to Ghézo), mokonzi ya sika ná De Souza bakómaki kosala mombongo oyo ezalaki kofuta mingi; De Souza atyamaki mokonzi ya mombongo ya baombo.

Guézo azalaki na mokano ya kopalanganisa boyangeli na ye mpe mpo na yango, azalaki na mposa ya bibundeli ya Mpoto. Na yango, atyaki De Souza mokonzi-molandi na Ouidah mpo atambwisa mombongo yango na bato ya Mpoto. Lokola na eteni yango ya Afrika, ye nde azalaki na lotomo nyonso ya kotɛka baombo, eumelaki te, De Souza akómaki na mbongo mingi, mpe zando ya baombo, oyo ezalaki pembeni ya ndako na ye, ekómaki kotonda na bapaya mpe bana-mboka oyo bazalaki kosomba.

Mobembo moko ya kolela

Mobembo na Nzela ya baombo ya Ouidah ebandaka na ndako makasi ya bato ya Portugal, oyo etongamá lisusu. Ndako yango oyo etongamaki liboso na 1721, ekómá musée. Bazalaki kotya bakangami oyo bakei boombo na libándá monene ya ndako yango. Mingi batambolaki butubutu mikolo mingi liboso bákóma kuna, bakangisami na minyɔlɔlɔ esika moko. Mpo na nini butubutu? Mpo molili ezalaki kopekisa bango báyeba esika bazali mpe bázwa ndenge ya kokima mpo bázonga na mboka.

Ntango etuluku moko ya baombo ekómi, bazalaki kotɛka bango na moto oyo apesi mbongo mingi koleka baninga; na nsima basombi bazalaki kotya bango bilembo. Baombo oyo basengelaki komemama na bamasuwa, bazalaki komemama na libongo, epai babwato mpe bamasuwa ya mike ezalaki komema bango tii na bamasuwa ya minene.

Esika mosusu oyo batɛlɛmaka na Nzela ya baombo ezali esika oyo Nzete ya kobosana makambo (l’Arbre de l’oubli) ezalaki. Lelo, batyá monima moko na esika ya nzete yango epai bazalaki kotinda baombo na makasi bábaluka zingazinga ya nzete yango​—balobaka ete mibali bazalaki kobaluka mbala libwa mpe basi mbala nsambo. Bazalaki koyebisa bango ete ekosalisa bango bábosana bamboka na bango, mpe ekokitisa bango mposa ya kotomboka.

Na nzela yango, ezali mpe na monima moko mpo na kokanisa mwa bandako ya Zomaï, oyo ezalaka lisusu te. Zomaï elakisi molili oyo ezalaki ntango nyonso na bandako yango, epai bazalaki kotya bakangami ebele mpo bámesenisa bango na bampasi oyo bakomona na bamasuwa. Kutu, mbala mosusu bazalaki kotika bango na bandako yango basanza mingi wana bazali kozela bamasuwa. Baoyo bazalaki kokufa na kati ya bandako yango bazalaki kokundama bango nyonso na libulu moko.

Monima oyo ebengami Zomachi, oyo ezali mpo na komonisa kobongola motema mpe kozongisa boyokani, epesaka mawa mingi na motema. Kuna, na sanza ya Yanuali ya mbula nyonso, bakitani ya bato oyo bazalaki baombo ná ya baoyo bazalaki kotɛka baombo basɛngaka bolimbisi mpo na baoyo basalaki makambo yango ya kozanga bosembo.

Esika ya nsuka na mobembo na biso nde Porte ya kozonga lisusu te​—monima oyo emonisaka bantango ya nsuka oyo baombo balekisaki na mabele ya Afrika. Na likoló ya porte yango monene, basalá mayemi ya milɔngɔ mibale ya bato ya Afrika oyo bakangami na minyɔlɔlɔ mpe bazali kokende na libongo oyo ezali wana pene, etalani na Mbu ya Atlantike. Balobaka ete na esika yango, bakangami mosusu, lokola bakokaki kosala eloko te, balyaki zɛlɔ mpo bábosana mboka na bango te. Bamosusu bamibomaki, bamikangaki nkingo na minyɔlɔlɔ na bango moko.

Boombo esili!

Na ebandeli ya bambula ya 1800, bato mingi bakómaki kosala milende mpo boombo esila. Masuwa ya nsuka oyo ememaki baombo longwa na Ouidah tii na États-Unis ekómaki na engumba Mobile, na Alabama, na sanza ya Yuli 1860. Kasi, boombo na bango eumelaki te, mpo na 1863, guvɛrnema ya États-Unis etyaki nsuka na boombo. Na mikili ya Amerika, boombo esukaki na 1888, ntango Brésil esukisaki yango.b

Libula oyo eyebani mingi, oyo mombongo ya baombo etiká ezali ete bato mingi ya Afrika bakɔtá na mikili ya Amerika, mpe ebakisá mpenza motángo ya bato na mikili yango mpe ebongolá mimeseno ya kuna. Libula mosusu ezali kopalangana ya vaudou, lingomba moko oyo esalelaka maji mpe bankisi, oyo ezali mingimingi na Haïti. Diksionɛrɛ moko (Encyclopædia Britannica) elobi ete “liloba vaudou eutá na liloba vodun, oyo elimboli nzambe, to elimo, na monɔkɔ ya Fon, na Bénin (oyo kala ezalaki Dahomey).”

Likambo ya mawa, boombo makasi ya ndenge mosusu ezali kokoba tii lelo oyo, atako ezalaka ntango nyonso te lokola oyo touti kolobela. Na ndakisa, bamilio ya bato bazali kosala lokola baombo mpo na koluka ndenge ya kobikela na bisika oyo mbongo ezali mpasi. Bato mosusu bazali konyokwama na bakonzi mabe ya politiki. (Mosakoli 8:9) Mpe bamilio mosusu ya bato bakangami baombo na mateya ya lokuta mpe na biyambayamba. Baguvɛrnema ya bato ekoki kolongola bato na bango na boombo ya ndenge wana? Te. Kaka Yehova Nzambe nde akoki kosala yango, mpe akosala yango! Ya solo, Liloba na ye, Biblia, elaki ete mokolo mosusu, bato nyonso oyo bazali kobaluka epai na Yehova mpo na kosambela ye na boyokani na solo oyo ezali na Biblia, solo oyo epesaka bato bonsomi, bakozwa “bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.”​—Baroma 8:21; Yoane 8:32.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Atako na ebandeli bazalaki mingi te, baombo bayaki kokóma ebele na États-Unis, mingimingi mpo bango moko bazalaki kobota mingi.

b Mpo na koyeba likanisi ya Biblia mpo na likambo etali boombo, talá lisolo “Engebene Biblia: Nzambe andimaki likambo ya kotɛkisa bato baombo?” na Lamuká! ya Yanuali–Marsi 2002, lokasa 20.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 24]

“MOTO AYANGELI MOTO MPO NA KOMONISA YE MPASI”

Bato mingi bandimaka ete mpo na kozwa baombo, bato oyo bazalaki kosala mombongo ya kotɛka baombo bazalaki kokɔta na makasi na bamboka mpe kokanga moto nyonso oyo balingi. Atako ekokaki kozala mpe bongo, na ntembe te bato oyo bazalaki kotɛka baombo bakokaki kozwa bamilio ya bato te “soki bakonzi ya Afrika mpe bato ya mimbongo basalisaki bango te,” ndenge Robert Harms, oyo azali profesɛrɛ ya istware ya Afrika, alobaki yango ntango batunaki ye mituna na emisyo moko ya radio. Ezali mpenza solo ete “moto ayangeli moto mpo na komonisa ye mpasi”!​—Mosakoli 8:9.

[Eutelo ya bafɔtɔ]

© Réunion des Musées Nationaux/​Art Resource, NY

[Karte na lokasa 22]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

Bato ya Afrika soki milio 12 batyamaki na bamasuwa mpe bakatisaki Mbu ya Atlantike mpo na kokende na boombo

AFRIKA

BÉNIN

Ouidah

Bokula ya Baombo

[Elilingi na nkasa 22, 23]

Ndako makasi ya bato ya Portugal, oyo etongamaki na 1721, ekómá Musée d’histoire de Ouidah

[Eutelo ya bafɔtɔ]

© Gary Cook/​Alamy

[Elilingi na lokasa 23]

Ekeko ya moombo oyo bakangi mabɔkɔ mpe monɔkɔ

[Elilingi na lokasa 23]

Porte ya kozonga lisusu te​—monima oyo emonisaka bantango ya nsuka oyo baombo balekisaki na mabele ya Afrika

[Eutelo ya bafɔtɔ]

© Danita Delimont/​Alamy

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto