Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • gt mok. 70
  • Mokufeli miso abiki

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokufeli miso abiki
  • Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Masolo mosusu
  • Yesu abikisi moto oyo akufá miso banda kobotama
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Bafarisai baluki kokweisa moto oyo akufá miso
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Bafalisai baboyi kondima
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Yesu abikisi moto mokolo ya Sabata
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
gt mok. 70

Mokapo 70

Mokufeli miso abiki

ATAKO Bayuda bamekaki kobwakela ye mabanga, Yesu atiki Yelusaleme te. Ngonga mingi na nsima bobele na mokolo moko wana, mokolo na sabata, wana ezali ye kotambola kati na mboka, bayekoli na ye mpe ye moko bamoni moto moko oyo miso na ye mamonaka te uta kobotama na ye. Bayekoli batuni Yesu ete: “Labi, nani asalaki lisumu, moto oyo soko baboti na ye mpo ete abotama na miso makufi?”

Mbala mosusu bazali kokanisa, lokola balabi mosusu, ete moto akoki kosala lisumu ntango azali naino kati na libumu ya mama na ye. Kasi Yesu ayanoli bango na maloba oyo: “Moto oyo asali mabe te soko baboti na ye mpe te, nde yango ezali boye mpo ete misala na Nzambe mimonana kati na ye.” Bokufi miso ya moto wana ezali mpo na libunga moko te oyo ye to baboti na ye bakokaki kosala. Ezali lisumu ya moto na liboso Adam nde ekomisaki bato nyonso na ezalela ya kozanga kokoka mpe, na wana, kokoma bibosono, lokola bokufi miso uta kobotama oyo Yesu akosalela mpo na komonisa polele misala na Nzambe.

Yesu amonisi ntina ya kokokisa misala yango nokinoki. “Ebongi na biso kosalaka misala na Motindi na ngai naino ezali moi. Butu ekoya wana moto moko akoki kosala mosala te. Naino ezali ngai kati na mokili, nazali moi na mokili.” Mosika mingi te Yesu akokufa mpe akokundama kati na liyita na molili epai kuna akokoka lisusu kosala eloko moko te. Kasi, mpo na sikawa, azali kongengisa naino mokili.

Nsima na koloba maloba wana, Yesu abwaki nsoi na nse mpe asali potopoto na nsoi na ye. Na nsima apakoli yango na miso ya mokufeli miso mpe alobi na ye ete: “Kenda kosukola na liziba na Siloame.” Moto yango atosi maloba na ye, mpe nsima na yango abandi komona mpo na mbala ya liboso kati na bomoi na ye. Oyo nde esengo ayokaki na bozongi na ye!

Bato ya pembeni mpe baoyo bayebi ye bakamwi. Babandi komituna: “Oyo moto azalaki kofanda mpe kosenga makabo te?” Bamosusu bayanoli ete: “Ezali ye.” Nzokande, bamosusu, baboyi kondima. Balobi ete: “Te, kasi akokani na ye.” Kasi moto yango ye moko alobi ete: “Ngai oyo.”

Bato batuni ye: “Ndenge nini miso na yo mafungwami?”

“Moto oyo abyangami Yesu asali potopoto mpe apakoli na miso na ngai mpe alobi na ngai ete: ‘Kenda na Siloame mpe sukola.’ Boye, esili ngai kokende mpe kosukola, nabandi komona.”

Batuni ye: “Moto yango azali wapi?”

Ayanoli ete: “Nayebi te.”

Sikawa bato bakumbi mobali oyo azalaki liboso mokufeli miso epai na bakonzi na bango ya mangomba, Bafalisai, baoyo, na ngala na bango, babandi mpe kotuna ye ndenge nini abandi komona. Mobali yango alimboli: “Apakolaki ngai potopoto na miso mpe nasukoli mpe nabandi komona.”

Bakonzi na mangomba mbele basengelaki kosepela elongo na mobola wana mosengi na makabo oyo sikawa abiki! Kasi, na esika ete ezala bongo, bazali kokweisa Yesu. Balobi ete: “Moto oyo auti na Nzambe te.” Mpo na nini balobi boye? “Mpo ete akotosaka sabata te.” Nzokande, Bafalisai mosusu bazali komituna: “Ndenge nini moto na masumu akoyeba kosala bilembo na lolenge oyo?” Na bongo kokabwana ekoti kati na bango.

Batuni bongo epai na mobali wana: “Yo olobi nini mpo na ye, awa efungoli ye miso na yo?”

Ye ayanoli ete: “Azali mosakoli.”

Bafalisai baboyi kondima. Mpo na bango, moto wana mpe Yesu bayokanaki na nkuku mpo na kokosa bato. Kolukaka koyeba likambo yango polele, babengi baboti na mokufeli miso mpo na kotuna bango mituna. Yoane 8:59; 9:1-18.

▪ Ntina ya bokufi miso ya moto ezali nini; na yango, ndimbola nini ezali libunga?

▪ Butu oyo moto moko akoki kosala mosala te ezali nini?

▪ Ezaleli na bato oyo bayebi moto wana ezali nini ntango bamoni ye abiki?

▪ Mpo na nini bokabwani ekoti kati na Bafalisai na tina na kobikisama ya moto oyo?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto