Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lff liteya 27
  • Ndenge oyo liwa ya Yesu ekoki kobikisa biso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge oyo liwa ya Yesu ekoki kobikisa biso
  • Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • KƆTÁ NA MOZINDO
  • NA MOKUSE
  • MAKANISI MOSUSU
  • Lisiko ezali likabo ya Nzambe oyo eleki monene
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Lisiko—Likabo ya Nzambe oyo eleki makabo nyonso
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Lisiko ya Klisto: Nzela ya Nzambe mpo na lobiko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Liwa na Yesu Elimboli nini mpo na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Makambo mosusu
Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
lff liteya 27
Liteya 27. Balongoli nzoto ya Yesu na nzete ya mpasi.

LITEYA 27

Ndenge oyo liwa ya Yesu ekoki kobikisa biso

Ya Papye
Ya Papye
Ya Papye

Tosalaka masumu, tomonaka mpasi mpe tokufaka mpo Adama ná Eva batosaki Nzambe te.a Kasi bomoi na biso ekozala kaka boye te. Yehova azwaki bibongiseli mpo na kolongola biso na boombo ya lisumu mpe ya liwa na nzela ya Mwana na ye, Yesu Kristo. Biblia elobi ete Yesu apesaki lisiko na nzela ya liwa na ye. Lisiko ezali mbongo to eloko oyo bapesi mpo na kobimisa moto oyo bakangi. Eloko oyo Yesu apesaki ezalaki bomoi na ye ya kokoka oyo azalaki na yango awa na mabele. (Tángá Matai 20:28.) Lokola Yesu azalaki moto ya kokoka, akokaki kozala na bomoi libela na libela awa na mabele, kasi andimaki kokufa mpo biso tózwa eloko oyo Adama ná Eva babungisaki. Yesu amonisaki mpe ete ye ná Yehova balingaka biso mingi. Liteya oyo ekosalisa yo okóma na botɔndi mingi mpo na liwa ya Yesu.

1. Lelo oyo liwa ya Yesu ekoki kosalisa biso na nini?

Lokola tozali bato ya masumu, tosalaka makambo mingi oyo esepelisaka Yehova te. Kasi, soki toyoki mpenza mawa mpo na masumu na biso, tosɛngi Yehova alimbisa biso na nzela ya Yesu Kristo, mpe tosali nyonso mpo tózongela lisusu mabe yango te, tokoki kokóma baninga ya Nzambe. (1 Yoane 2:1) Biblia elobi: “Kristo akufaki mpo na masumu mbala moko mpo na libela. Moto ya sembo moko mpo na bato oyo bazangi bosembo, mpo amema bino epai ya Nzambe.”​—1 Petro 3:18.

2. Mapamboli nini liwa ya Yesu ekomemela biso na mikolo ezali koya?

Yehova atindaki Yesu apesa bomoi na ye ya kokoka “mpo moto nyonso oyo akomonisa kondima epai na ye [Yesu] abomama te kasi azwa bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Likambo oyo Yesu asalaki epesi Yehova nzela ya kolongola makambo nyonso ya mabe oyo botomboki ya Adama ebimisá, mpe akosala yango mosika te. Yango elingi koloba soki tozali na kondima na mbeka ya Yesu, tokozwa libaku ya kozala na bomoi libela na libela na paradiso awa na mabele!​—Yisaya 65:21-23.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba makambo mosusu oyo emonisi ntina oyo Yesu apesaki bomoi na ye, mpe bolamu oyo yango ememeli yo.

3. Liwa ya Yesu elongoli biso na boombo ya lisumu mpe ya liwa

Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.

VIDEO: Mpo na nini Yesu akufaki?​—Eteni 1 (2:01)

  • Adama abungisaki nini ntango aboyaki kotosa Nzambe?

Tángá Baroma 5:12, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Lisumu ya Adama ebimiselá yo makambo nini?

Tángá Yoane 3:16, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Mpo na nini Yehova atindaki Mwana na ye awa na mabele?

A. Bililingi: 1. Adama, nsima ya kotombokela Nzambe. 2. Bakei kokunda moto na lilita. Bililingi: A. Adama, nsima ya kotombokela Nzambe. B. Yesu Kristo. B. Bililingi: 1. Yesu Kristo. 2. Bato ya mbula, loposo mpe mimeseno ndenge na ndenge.
  1. Adama azalaki moto ya kokoka oyo atosaki Nzambe te mpe amemelá bato nyonso lisumu mpe liwa

  2. Yesu azalaki moto ya kokoka oyo atosaki Nzambe mpe apesá bato nyonso likoki ya kozala na bomoi ya kokoka mpe ya libela na libela

4. Liwa ya Yesu ekoki komemela bato nyonso bolamu

Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.

VIDEO: Mpo na nini Yesu akufaki?​—Eteni 2 (2:00)

  • Ndenge nini liwa ya moto moko ekoki komemela bato nyonso bolamu?

Tángá 1 Timote 2:5, 6, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Adama azalaki moto ya kokoka, kasi lokola asalaki lisumu, bato nyonso bakómá bato ya masumu mpe bakómá kokufa. Yesu azalaki mpe moto ya kokoka. Na ndenge nini apesaki “lisiko oyo ekokani”?

5. Lisiko ezali likabo oyo Yehova apesi yo

Baninga ya Yehova bamonaka ete lisiko ezali likabo oyo Yehova apesi mokomoko na bango. Na ndakisa, tángá Bagalatia 2:20, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Ntoma Paulo alobi nini mpo na komonisa ete lisiko ezali likabo oyo Nzambe apesá ye?

Lokola Adama asalaki lisumu, ye ná bana na ye nyonso basengelaki kokufa. Kasi Yehova atindaki Mwana na ye akufa mpo okoka kozwa bomoi ya libela na libela.

Ntango ozali kotánga bavɛrsɛ oyo elandi, kanisá ndenge Yehova ayokaki ntango Mwana na ye azalaki konyokwama. Tángá Yoane 19:1-7, 16-18, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Oyoki ndenge nini mpo na likambo oyo Yehova ná Yesu basalelá yo?

SOKI MOTO ATUNI YO: “Ndenge nini liwa ya moto moko ekoki kobikisa bato nyonso?”

  • Okopesa ye eyano nini?

NA MOKUSE

Liwa ya Yesu esali ete Yehova alimbisa masumu na biso, mpe epesi biso likoki ya kozala na bomoi libela na libela.

Bozongeli

  • Mpo na nini Yesu akufaki?

  • Na ndenge nini bomoi ya kokoka ya Yesu ezalaki lisiko oyo ekokani?

  • Bolamu nini liwa ya Yesu ekoki komemela yo?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Luká koyeba ntina oyo bomoi ya kokoka ya Yesu ebengami lisiko.

“Ndenge nini mbeka ya Yesu ezali ‘lisiko mpo na bato mingi’?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

Talá oyo tosengeli kosala mpo tóbika.

“Ndenge nini Yesu abikisi biso?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

Yehova akoki mpe kolimbisa masumu ya minene?

“Biyano na mituna ya Biblia” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/05/2013)

Talá ndenge mbeka ya Kristo esalisaki mobali moko abongola bomoto na ye.

“Nazali lisusu te moombo ya mobulu” (Lisolo oyo ezali na Internet)

a Lisumu esuki kaka te na kosala likambo ya mabe. Elakisi mpe mposa to makanisi ya kosala makambo ya mabe oyo tozwá epai ya Adama ná Eva.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto