Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 15/7 nk. 20-23
  • Nazalaki kobanga liwa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nazalaki kobanga liwa
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Natiki kobanga liwa
  • Makambo ya losambo na Italie nsima ya etumba
  • Nakɔti Eteyelo ya Gileade
  • Nazali kaka molende na mosala ya Yehova
  • Natyaki miso mpe motema na ngai na libonza
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Nazali na ekateli ya kokoba kosalela Mozalisi na ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Bansango oyo euti na mikili ndenge na ndenge
    Buku ya mobu 2017 ya Batatoli ya Yehova
  • Bapastɛrɛ mibale oyo basepelaki na mikanda ya Russell
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 15/7 nk. 20-23

Nazalaki kobanga liwa

Lisolo ya Piero Gatti

MAKƐLƐLƐ moko ya nsense ebandaki mokemoke kokóma makasi. Nsima na yango toyokaki loseba ebɛti makasi mpo na kokebisa bato ete bámibomba. Na nsima, toyokaki lokito monene ya babɔmbi mpe ya biloko oyo ezali kobukana; bato bazalaki na nsɔmɔ makasi mpe makɛlɛlɛ moko makasi ebomaki bango matoi.

Yango esalemaki na engumba Milan, na Italie, na 1943/​1944. Lokola nazalaki soda oyo azali naino elenge, mbala mingi bazalaki kotinda ngai nabimisa bibembe ya bato oyo bakufaki na nse ya bisika oyo babombamaki. Lokola nzoto na bango epanzanaki mpenza mpo na babɔmbi oyo mpɛpɔ ebwakaki, mwaye ya koyeba bango lisusu ezalaki te. Namonaki kaka liwa ya bato mosusu te. Na bantango mosusu, ngai moko mpe nazalaki komona liwa na miso. Na mabaku yango nazalaki kobondela, mpe nalakaki Nzambe ete soki ngai nakufi te nakosala mokano na ye.

Natiki kobanga liwa

Nakolaki na mboka moko oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 10 longwa na engumba Côme, na Italie, pene na ndelo ya Suisse. Ntango nazalaki naino mwana moke, nakutanaki na makambo ya mawa mpe nazalaki kobanga liwa. Maladi babengi grippe espagnole ebomaki bayaya na ngai mibale ya basi. Na nsima na 1930, ntango nazalaki na mbula motoba mpamba, mama na ngai Luigia akufaki. Lokola tozalaki na lingomba ya Katolike, nazalaki kotosa mibeko ya losambo mpe nazalaki kokende na Misa pɔsɔ na pɔsɔ. Kasi nsɔmɔ na ngai ya liwa eyaki kosila bambula mingi na nsima, na ndako-nzambe te, kasi na esika oyo bakataka nsuki.

Na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba na 1944, bato mingi mpenza bakufaki. Nazalaki na kati ya bankóto na bankóto ya basoda ya Italie oyo bakimaki bitumba mpo na kokende kobombana na Suisse, ekólo oyo ekɔtaki na bitumba yango te. Ntango tokómaki kuna, bamemaki biso na bakaa ndenge na ndenge ya bato bakimá mboka. Batindaki ngai na kaa moko pene na mboka Steinach, na nɔrdi ɛsti ya ekólo yango. Kuna, bapesaki biso mwa bonsomi. Moto oyo azalaki kokata bato nsuki na Steinach azalaki na mposa ya lisalisi na esika na ye ya mosala. Nafandaki na ye elongo mpe nasalisaki ye na mosala sanza moko mpamba, kasi ekokaki mpo nayebana na moto oyo asalisaki ngai nabongola bomoi na ngai.

Kiliya moko oyo azalaki koya kokatisa nsuki kuna ezalaki Adolfo Tellini, mwana-mboka Italie oyo azalaki kofanda na Suisse. Azalaki Motatoli ya Yehova. Liboso ya ntango wana, nayokaki naino eloko te oyo etali Batatoli, mpe ezalaki likambo ya kokamwa mpenza te mpo na ntango wana, Batatoli balekaki 150 te na Italie mobimba. Adolfo ayebisaki ngai mateya kitoko ya Biblia, bilaka ya kozwa kimya mpe ‘bomoi mingi.’ (Yoa. 10:10; Em. 21:3, 4) Koyoka ete bitumba mpe liwa ekozala lisusu te na mikolo ezali koya esepelisaki ngai mingi mpenza. Ntango nazongaki na kaa, nayebisaki mpe Giuseppe Tubini, elenge mosusu ya Italie, elikya yango; esimbaki mpe motema na ye. Banda wana, Adolfo ná Batatoli mosusu bakómaki koya kotala biso na kaa mbala na mbala.

Adolfo amemaki ngai na Arbon, mboka moko na kilomɛtrɛ soki 10 longwa na Steinach, epai mwa etuluku moko ya Batatoli bazalaki kosala makita na monɔkɔ ya Italien. Nasepelaki mingi na makambo oyo nayokaki na boye ete, na pɔsɔ oyo elandaki, nakendaki kuna na makolo. Na nsima, nakendaki na liyangani ya Batatoli na ndako moko ya mayangani, na engumba Zurich. Eloko oyo esalaki ngai mpasi mingi ezali bililingi oyo balakisaki ya bakaa ya koboma bato; emonisaki bibembe ebele mpenza etandamitandami. Nayokaki ete Batatoli mingi ya Allemagne babomamaki mpo na kondima na bango. Na liyangani yango, nakutanaki na Maria Pizzato. Bakonzi ya Bafasiste ya Italie bakangaki ye mpo amipesaki na misala ya Batatoli mpe bakatelaki ye etumbu ya bolɔkɔ mbula 11.

Ntango etumba esilaki, nazongaki na Italie mpe nakómaki koyangana na mwa lisangá oyo ezalaki na Côme. Moto moko te ayekolaki na ngai Biblia mpenzampenza, kasi nayebaki malamu mateya ya moboko. Maria Pizzato mpe azalaki na lisangá yango. Amonisaki ngai ntina ya kozwa batisimo mpo na kokóma mokristo mpe asɛngaki ngai nakende koluka Marcello Martinelli, oyo azalaki kofanda na Castione Andevenno, na etúká ya Sondrio. Marcello azalaki ndeko moko ya sembo oyo atyamá mafuta na elimo, mpe bakonzi ya Leta bakatelaki ye etumbu ya bolɔkɔ mbula 11. Mpo na kokóma epai na ye, esɛngaki nasala kilomɛtrɛ 80 na velo.

Marcello asalelaki Biblia mpo na kolimbwela ngai masɛngami oyo moto asengeli kokokisa mpo na kozwa batisimo, na nsima tobondelaki mpe tokendeki na ebale Adda, mpe kuna, nazwaki batisimo. Ezalaki na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1946. Ezalaki mokolo ya ntina mingi mpenza! Lokola nazalaki mpenza kosepela mpo na ekateli na ngai ya kosalela Yehova mpe ndenge nakómaki sikoyo na elikya kitoko mpo na mikolo ekoya, ntango mpokwa ekómaki, nandimaki te ete nasali na velo kilomɛtrɛ 160 mokolo yango!

Liyangani ya liboso nsima ya etumba na Italie esalemaki na sanza ya Mai 1947, na Milan. Bato soki 700 bayanganaki; mingi banyokwamaki na mabɔkɔ ya Bafasiste. Likambo ya kokamwa, na liyangani yango, Giuseppe Tubini, oyo napesaki litatoli na kaa, asalaki diskur ya batisimo, mpe nsima na yango ye moko mpe azwaki batisimo!

Na liyangani yango, nazwaki libaku ya kokutana na Ndeko Nathan Knorr, oyo autaki na Betele ya Brooklyn. Alendisaki ngai ná Giuseppe tómipesa na mosala ya Nzambe. Nazwaki ekateli ete sanza mobimba ekoleka te, nakobanda mosala ya ntango nyonso. Ntango nakómaki na ndako, nayebisaki libota na ngai ekateli oyo nazwaki, mpe bango nyonso balukaki kolɛmbisa ngai. Atako bongo, nakangamaki na ekateli na ngai. Na yango, sanza moko na nsima, nabandaki kosala na Betele ya Milan. Bamisionɛrɛ minei bazalaki kosala kuna: Ndeko Giuseppe (Joseph) Romano ná mwasi na ye Angelina; Carlo Benanti ná mwasi na ye Costanza. Moto ya mitano ezalaki Giuseppe Tubini, oyo autaki kokóma kala te, mpe ngai moto ya motoba.

Nsima ya sanza moko na Betele, nakómaki mokɛngɛli ya zongazonga, mwana-mboka Italie ya liboso na mosala yango. Ndeko George Fredianelli, misionɛrɛ ya liboso oyo autaki États-Unis mpe akómaki na Italie 1946, azalaki mokɛngɛli-motamboli na ntango wana. Apesaki ngai formasyo na boumeli ya mwa bapɔsɔ, mpe na nsima nabandaki mosala yango ngai moko. Nabosanaka te lisangá ya liboso oyo nakendaki kotala: Faenza. Kanisá naino! Naino napesá ata diskur moko te na lisangá! Atako bongo, nalendisaki bayangani, ata mpe bilenge mingi, bákanisa kosala mosala ya ntango nyonso. Na nsima, bilenge yango mosusu bazwaki mikumba minene na teritware ya Italie.

Nabandaki bomoi ya esengo lokola mokɛngɛli-motamboli, bomoi oyo etondi na makambo ya kokamwa, ya bambongwana, ya mikakatano mpe bisengo, mpe bandeko balingaki ngai mingi.

Makambo ya losambo na Italie nsima ya etumba

Nalobela mwa moke ndenge makambo ya losambo ezalaki na Italie na ntango wana. Lingomba ya Katolike nde ezalaki koyangela. Atako mobeko likonzi ya sika ebandaki kosalelama na 1948, mibeko ya Bafasiste oyo ezalaki kopekisa Batatoli básakolaka na bonsomi eyaki kosuka tii na 1956. Mpo na mitungisi ya bakonzi ya Lingomba, mbala mingi mayangani ya zongazonga ezalaki kosila te. Kasi na bantango mosusu milende ya bakonzi yango ezalaki kolonga ata moke te, ndenge esalemaki na 1948, na Sulmona, mwa engumba moko na ntei ya Italie.

Liyangani esalemaki na ndako moko ya masano. Mokolo ya lomingo na ntɔngɔ, nazalaki prezida, mpe Giuseppe Romano asalaki diskur ya bato nyonso. Bato bazalaki mingi, na kotala ndenge makambo ezalaki na mikolo wana. Atako basakoli bazalaki ata 500 te na ekólo mobimba, bato 2 000 batondaki na ndako yango. Na nsuka ya diskur, elenge mobali moko amataki na estrade, mpo basango mibale oyo bazalaki na kati ya bayangani batindaki ye. Mpo na kotya mobulu, abandaki koganga makasi mpenza. Na mbala moko nayebisaki ete: “Soki ozali na likambo ya koloba, futelá ndako moko mpo oloba nyonso oyo olingi.” Maloba na ye esalaki bayangani eloko moko te mpe mongongo na ye eyokanaki te mpo bato bazalaki kowolola ye. Na yango, elenge mobali yango akitaki na estrade mpe alimwaki.

Na mikolo wana, mobembo ezalaki lisɛki te. Na bantango mosusu, nazalaki kokende kotala masangá na makolo, na velo, na babisi ya mabe mpe oyo etondi na bato to mpe na engbunduka. Na bantango mosusu, nazalaki kolala na ndako oyo batyaka banyama to na ndako oyo babombaka bisaleli ya mosala. Bitumba eutaki kosila mpe bato mingi ya Italie bazalaki babola. Bandeko bazalaki mingi te, mpe bazalaki na makoki mpenza te. Atako bongo, mosala ya Yehova ezalaki kaka kitoko mingi.

Nakɔti Eteyelo ya Gileade

Na 1950, babengaki ngai ná Giuseppe Tubini mpo tókɔta na kelasi ya mbala 16 ya Gileade, eteyelo mpo na bamisionɛrɛ. Banda na ebandeli, namonaki ete koyekola Lingelesi ekozala mpasi mpo na ngai. Nasalaki nyonso, kasi ezalaki mpenza etumba. Esɛngaki tótánga Biblia mobimba na Lingelesi. Mpo na kosala yango, na bantango mosusu nazalaki kolya na midi te mpo namekameka kotánga na mongongo makasi. Nsukansuka, ekómaki ngala na ngai ya kosala lisolo. Nabosanaka te makambo oyo molakisi alobaki: “Bajɛstɛ na yo mpe esengo na yo ezali malamu mingi, kasi Lingelesi na yo eyokani ata moke te!” Atako bongo, nalongaki kosilisa eteyelo tii na nsuka. Na nsima, bazongisaki ngai ná Giuseppe na Italie. Lokola tobakisaki formasyo wana, biso mibale tokómaki na makoki mingi koleka mpo na kosalela bandeko.

Na 1955, nabalaki Lidia; nasalaki diskur ya batisimo na bango mbula nsambo liboso. Papa na ye Domenico azalaki ndeko moko malamu; alongaki kosalisa bana na ye nyonso nsambo báyamba solo, atako Bafasiste banyokolaki ye mpe bapesaki ye etumbu ya kokende kofanda na mboka mosusu mbula misato. Lidia mpe abundaki mpenza mpo na solo. Basambisaki ye na tribinale mbala misato, liboso Leta endima lotomo na biso ya kosakola ndako na ndako. Mbula motoba nsima ya libala na biso, Beniamino, mwana na biso ya mobali ya liboso, abotamaki. Na 1972, tobotaki mwana mosusu ya mobali, Marco. Nazali na esengo mingi mpo bango mibale elongo na mabota na bango bazali kosalela Yehova na molende.

Nazali kaka molende na mosala ya Yehova

Na boumeli ya bambula ya esengo oyo nazalaki kosalela bandeko, nakutanaki na makambo mingi oyo nabosanaka te. Na ndakisa, na ebandeli ya bambula 1980, papa ya mwasi na ngai akomelaki Sandro Pertini, prezida ya Italie na ntango wana, mokanda. Na boyangeli ya Bafasiste, bamemaki bango mibale na esanga ya Ventotene, epai bazalaki kotya bato oyo bamonanaki ete bazali banguna ya Leta. Bokilo na ngai ya asɛngaki asolola na prezida, mpo azalaki koluka apesa ye litatoli. Ntango bandimaki, nakendaki elongo na ye, mpe bayambaki biso malamu​—likambo oyo ezalaki kosalema te. Prezida apesaki bokilo na ngai mbote na esengo mpe ayambaki ye. Na nsima, tolobelaki kondima na biso mpe topesaki ye mwa mikanda.

Na 1991, nsima ya kosala mosala ya mokɛngɛli-motamboli mbula 44, natikaki mosala ya zongazonga; natalaki masangá na Italie mobimba. Na mbula minei oyo elandaki, nakómaki mokɛngɛli ya Ndako ya Mayangani tii ntango esɛngaki nalɛmbisa mosala na ngai mpo na maladi moko ya makasi. Nzokande, na boboto monene ya Yehova, nazali naino kaka na mosala ya ntango nyonso. Nasalaka nyonso mpo na kosakola mpe koteya nsango malamu, mpe sikoyo nazali na mwa bato oyo nayekolaka na bango Biblia. Tii lelo bandeko balobaka ete badiskur na ngai ezalaka mɔtɔ mpenza. Matondi na Yehova ndenge nazali naino makasi atako nanuni.

Ntango nazalaki elenge, nazalaki mpenza kobanga liwa, kasi boyebi ya sikisiki ya Biblia epesi ngai elikya ya solosolo ya bomoi ya seko, to ndenge Yesu abengaki yango, bomoi “mingi.” (Yoa. 10:10) Yango nde nazali kozela​—bomoi oyo etondi na kimya, na esengo, mpe na mapamboli ebele oyo euti na Yehova. Lokumu nyonso ekende epai ya Mozalisi na biso, oyo tozali na lokumu ya komema nkombo na ye.​—Nz. 83:18.

[Karte na nkasa 22, 23]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

SUISSE

BERNE

Zurich

Arbon

Steinach

ITALIE

ROME

Côme

Milan

Ebale Adda

Castione Andevenno

Faenza

Sulmona

Ventotene

[Elilingi na lokasa 22]

Tolingi kokende na Gileade

[Elilingi na lokasa 22]

Na Gileade elongo na Giuseppe

[Elilingi na lokasa 23]

Mokolo ya libala na biso

[Elilingi na lokasa 23]

Mwasi na ngai azali pene na ngai banda mbula koleka 55

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto