Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w23 Décembre lok. 32
  • Lisolo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lisolo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Komonisela bato nyonso motema mawa
  • Mekolá motema mawa ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • “Mawa monene ya Nzambe na biso”
    Pusaná penepene na Yehova
  • Bózalaka na motema mawa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Bóyokelaka basusu “mawa mingi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
w23 Décembre lok. 32

Lisolo

Komonisela bato nyonso motema mawa

Mokolo moko, ndeko mwasi moko na Nouvelle-Zélande atalaki video “Bótyelanaka likebi,” oyo emonisi ete Yehova asukaka kaka te na koyoka mawa, kasi mpe amonisaka yango. (Yis. 63:​7-9) Ndeko mwasi yango azwaki ekateli ya kosalela makambo oyo ayekolaki, mpe koluka libaku ya kosalisa ata moto moko. Na nsuka ya mokolo yango, wana azalaki kosomba biloko ya kolya, amonaki mwasi oyo azangá ndako mpe atunaki ye soki akoki kosombela ye eloko ya kolya. Mwasi yango andimaki. Ntango ndeko mwasi amemelaki ye bilei, asalelaki traktɛ Bampasi ekosila mokolo mosusu? mpo na kopesa litatoli ya mokuse.

Mwasi mobola yango alelaki. Alobaki ete abɔkwamá na libota ya Batatoli ya Yehova kasi atiká solo eleki bambula mingi. Kasi esali mwa mikolo, azalaki kobondela Yehova asalisa ye mpo azongela ye. Ndeko mwasi apesaki ye Biblia mpe asalaki programɛ mpo bákóma koyekola.a

Ndenge moko na Yehova, tosengeli koyokelaka bato mawa, ata mpe bandeko na biso ya libota mpe ya lisangá. Mpe tokoki komonisa motema mawa soki tozali koluka mabaku ya kosakwela basusu.

a Mpo na kosalisa bandeko oyo basakolaka lisusu te, talá lisolo “Bózongela ngai” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 06/2020.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto