34 Mpe yango esengeli kozala mobeko mpo na ntango oyo etyami ndelo te mpo na bino,+ mpo na kozipa masumu ya bana ya Yisraele na ntina na masumu nyonso na bango mbala moko na mbula.”+
12 akɔtaki, na makila+ ya bantaba mpe ya bana-ngɔmbɛ ya mibali te, kasi nde na makila na ye moko,+ mbala moko mpo na libela, akɔtaki na esika mosantu mpe azwelaki biso kosikolama ya seko.+
24 Mpo Kristo akɔtaki, na esika mosantu oyo esalemi na mabɔkɔ te,+ oyo ezali elilingi ya makambo ya solo,+ kasi nde na likoló mpenza,+ mpo amonana sikoyo liboso ya Nzambe mpenza mpo na biso.+
26 Soki bongo, mbɛlɛ amonaka mpasi mbala na mbala banda mokili ebandá.+ Kasi sikoyo amonani+ mbala moko+ mpo na libela na bosukisi ya makambo ya ntango oyo+ mpo na kolongola lisumu na mbeka na ye moko.+