18Na mikolo wana, mokonzi azalaki te na Yisraele.+ Mpe na mikolo yango, libota ya Badani+ ezalaki komilukela libula mpo na kofanda kuna; mpamba te tii na mokolo wana, bazwaki naino mabele ya libula na bango te na kati ya mabota ya Yisraele.+
19Nzokande, na mikolo wana, mokonzi azalaki te na Yisraele.+ Mpe esalemaki boye: Molevi moko afandaki mwa ntango na nsukansuka ya etúká ya ngombangomba ya Efraime.+ Na nsima, azwaki mwasi moko makango+ na Beteleme,+ na Yuda.