- 
	                        
            
            Nzembo 51:maloba ya ebandeli ya loyembo-19Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
- 
                            - 
                                        Epai ya mokambi ya nzembo. Mondule ya Davidi. Ntango Natane mosakoli akɔtaki epai ya Davidi wana asilaki kosangisa nzoto na Bate-sheba.+ 51 Ee Nzambe, moniselá ngai boboto na kolanda motema boboto na yo.+ Longolá misala na ngai ya kobuka mibeko na kolanda motema mawa oyo otondi na yango.+ 3 Mpo ngai moko nayebi misala na ngai ya kobuka mibeko,+ Mpe lisumu na ngai ezali liboso na ngai ntango nyonso.+ 4 Nasaleli yo lisumu, kaka yo moko,+ Mpe nasali oyo ezali mabe na miso na yo,+ Mpo yo omonana moyengebene ntango ozali koloba,+ Mpo yo ozala na libunga te ntango ozali kosambisa.+ 6 Talá! Yo osepeli na bosolo oyo ezali na kati ya motema;+ Mpe na kati na ngai moko osala ete nayeba bwanya mpenza.+ 7 Pɛtolá ngai na izope nalongwa na lisumu, mpo nazala pɛto;+ Sukolá ngai, mpo nakóma mpɛmbɛ mingi koleka nɛjɛ.+ 10 Ee Nzambe, zalisá motema ya pɛto na kati na ngai,+ Mpe tyá kati na ngai elimo ya sika, oyo ezali ngwi.+ 14 Ee Nzambe, bikisá ngai na ngambo ya makila,+ Nzambe ya lobiko na ngai,+ Mpo lolemo na ngai eyebisa boyengebene na yo na esengo.+ 16 Mpo yo ozali kosepela na mbeka te—soki osepelaka na yango, nalingaki kopesa yango;+ Yo ozali kosepela te na likabo ya kotumba mobimba.+ 
 
-