48 Mpe banguna na yo oyo Yehova akotindela yo, okosalela bango+ mpenza na nzala+ mpe na mposa ya mai mpe na bolumbu mpe na mposa ya eloko nyonso; mpe akotya mpenza ekanganeli ya ebende na nkingo na yo kino akosilisa yo.+
27 “Mpe ekosalema mpenza boye na mokolo yango: mokumba na ye ekolongwa na lipeka na yo,+ mpe ekanganeli na ye ekolongwa na nkingo na yo,+ mpe ekanganeli yango ekobebisama mpenza+ mpo na mafuta.”
8 “Mpe na mokolo yango ekosalema mpenza boye,” yango nde liloba ya Yehova ya mampinga, “nakobuka ekanganeli na ye uta na nkingo na yo, mpe nakokata bansinga na yo,+ mpe bapaya bakozwa ye lisusu te mosaleli oyo azali kosala mosala ya mpunda.
27 Mpe nzete ya elanga ekobota mbuma na yango,+ mpe mokili ekopesa mbuma na yango,+ mpe ya solo, ekofanda na kimya na mabele na yango.+ Mpe bampate yango ekoyeba mpenza ete nazali Yehova ntango nakobuka banzete ya ekanganeli+ na yango mpe nakobikisa yango na lobɔkɔ ya baoyo bazwaki yango baombo.+