Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yirimia 2:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 “‘Mpo kala nabukaki ekanganeli na yo bitenibiteni;+ nakataki bansinga na yo. Kasi olobaki ete: “Nakosalela yo te,” mpo likoló ya ngomba moke nyonso oyo etombwaná mpe na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa+ ozalaki komitanda,+ ozalaki kosala bondumba.+

  • Yirimia 3:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpe na mikolo ya mokonzi Yosiya,+ Yehova alobaki na ngai boye: “‘Omoni likambo Yisraele oyo azangi bosembo asali?+ Azali kokende na ngomba nyonso oyo etombwaná+ mpe na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa,+ mpo asala bondumba kuna.+

  • Ezekiele 6:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova,+ ntango bato na bango oyo babomami bakozala na kati ya bikeko na bango ya bosɔtɔ,+ zingazinga ya bitumbelo na bango,+ likoló ya ngomba moke nyonso oyo etombwaná,+ mpe na bansɔngɛ nyonso ya bangomba+ mpe na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa+ mpe na nse ya nzete nyonso monene ya nkasa mingi,+ esika bapesi nsolo moko ya kokitisa motema na bikeko na bango nyonso ya bosɔtɔ.+

  • Hosea 4:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Bazali kopesa bambeka na bansɔngɛ ya bangomba,+ mpe bazali kobimisa milinga ya mbeka na bangomba mike,+ na nse ya nzete ya monene mingi, nzete ya sitirakisi mpe nzete monene, mpamba te elili na yango ezali malamu.+ Yango wana bana na bino ya basi bazali kosala pite mpe basi ya bana na bino bazali kosala ekobo.

  • Baroma 6:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Bongo mbuma+ nini bozwaki na ntango wana? Makambo+ oyo bozali sikoyo koyokela nsɔni. Mpo nsuka ya makambo wana ezali liwa.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto